Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/99 lok. 3
  • Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 3/99 lok. 3

Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli

Na mbula oyo Ekaniseli ekozala na mokolo ya minei mwa 1 Aprili. Bankulutu basengeli kotalela makambo oyo malandi:

◼ Soki bobongisi ngonga mpo na molulu yango, bómindimisa ete limpa mpe vinyo ekolekisama te liboso ete moi elala.

◼ Bato nyonso, bakisa mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba ngonga mpenzampenza oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.

◼ Limpa mpe vinyo oyo ekosalelama esengeli kobongisama malamu.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1985, lokasa 17 (ebimeli ya Lifalanse).

◼ Basaani, bakɔpɔ, mpe mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama libela kati na Ndako ya Bokonzi.

◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.

◼ Bosengeli kopona libela bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakopesa bango bisika ya kofanda mpe bandeko oyo bakotambwisa limpa mpe vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge malamu ya kokokisa yango.

◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa mpe vinyo epai na ndeko nyonso oyo azali mopakolami mpe azali ebɔsɔnɔ kasi azali na makoki ya koyangana te.

◼ Soki masangá mingi makosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bituluku ya bato bizala te na libanda, na balabala, mpe na esika ya kotɛlɛmisa mituka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto