Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
Na mbula oyo Ekaniseli ekozala na mokolo ya minei, mwa 28 Marsi. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo oyo elandi:
◼ Ntango bozali kobongisa ngonga oyo molulu yango ekobanda, bóbosana te ete limpa na vinyo ekolekisama te liboso ete moi elala.
◼ Bato nyonso, bakisá mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba ngonga mpenzampenza oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.
◼ Lolenge ya limpa mpe ya vinyo oyo ekosalelama esengeli kozala oyo ebongi mpe esengeli kobongisama liboso.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1985 na lokasa 17 (na Lifalanse).
◼ Basaani, bakɔpɔ, mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama libela na kati ya Ndako ya Bokonzi.
◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.
◼ Bosengeli kopona libela bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakotambwisa limpa na vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge ya kokokisa yango malamu; bosengeli mpe komonisa bango ntina ya kolata mpe kokatisa nsuki na ndenge ebongi.
◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa na vinyo epai ya ndeko nyonso mopakolami oyo azali ebɔsɔnɔ, mpe azali na makoki ya koyangana te.
◼ Soki masangá mingi ekosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bato bátondana te na porte, na balabala, mpe na bisika ya kotɛlɛmisa mituka.