Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
Na mbula oyo, Ekaniseli ekozala na mokolo ya misato, mwa 16 Aprili. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo oyo elandi:
◼ Ntango bozali kobongisa ngonga oyo molulu yango ekobanda, bóbosana te ete limpa ná vinyo ekolekisama te liboso ete moi elala.
◼ Bato nyonso, bakisa mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba ngonga mpenzampenza oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.
◼ Lolenge ya limpa mpe ya vinyo oyo ekosalelama esengeli kozala oyo ebongi mpe esengeli kobongisama liboso.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1985 na lokasa 17 (na Lifalanse).
◼ Basaani, bakɔpɔ, mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama liboso na Ndako ya Bokonzi.
◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.
◼ Bosengeli kopona liboso bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakotambwisa limpa ná vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge ya kokokisa yango malamu; bosengeli mpe komonisa bango ntina ya kolata mpe kokatisa nsuki na ndenge ebongi.
◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa ná vinyo epai ya ndeko nyonso mopakolami oyo azali na bokɔnɔ, mpe azali na makoki ya koyangana te.
◼ Soki masangá mingi ekosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bato bátondana te na porte, na balabala, mpe na bisika ya kotɛlɛmisa mituka. Soki likoki ezali, ekozala malamu kolekisa miniti 45 liboso ete lisangá mosusu ekɔta na Ndako ya Bokonzi.