Biblia ezali na nguya!
Ndenge nini? Talá kasɛti video La Bible: une force dans votre vie. Yango ezali kasɛti ya misato kati na bakasɛti video oyo ezali na motó ya likambo ete: La Bible: un livre historique et prophétique.
Olingi ete libala na yo ezala malamu? Olingaka koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano ya ntango oyo? Ndenge nini bilenge bakoki kokola malamu mpe kokóma mikóló oyo bakokokisa malamu mikumba na bango? Kasɛti video oyo ezali komonisa ndenge Biblia ekoki kosalisa na makambo yango. Okoyoka bato bazali koloba ndenge Biblia ebongolaki bomoi na bango. Okoyoka ndenge bazali komonisa lolenge oyo Biblia esalisaki bango báyeba kosilisa mikakatano ya bomoi ya mikolo na biso.
Tokoki kosalela kasɛti video oyo mpo na kosalisa bato oyo babandi kosepela na solo sika, báyeba ete toli ya Liloba ya Nzambe ezali na ntina na bomoi na bango. Kasɛti video La Bible: une force dans votre vie ezali na Betele, okoki kopesa komande na yo epai ya mosaleli na misala oyo atalelaka mikanda.