Nguya ya Biblia na bomoi na yo
Biblia esalisi bamilio ya bato bábongola bomoi na bango, bákóma na bomoi ya malamu koleka. Wapi mitinda mosusu ya Biblia, oyo soki tosaleli yango, ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya bomoi ya lelo? Kozanga ntembe, okozwa eyano na motuna wana soki otali video oyo ezali na motó ya likambo La Bible : une force dans votre vie, eteni ya mibale ya DVD ya biteni misato, oyo ezali na motó ya likambo La Bible : un livre historique et prophétique. Nsima ya kotala video yango, okoki koyanola na mituna oyo?
(1) Mpo na nini tokoki koloba te ete Biblia ezali kaka buku moko ya kitoko koleka? (Ebr. 4:12) (2) Soki Biblia ekoki kosalisa bato bákóma na bomoi ya malamu, mpo na nini bato bazali kokutana na ebele ya mikakatano? (3) Motó ya likambo ya Biblia ezali nini? (4) Bavɛrsɛ nini ya Biblia balobeli na video yango oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali (a) bábongisa lolenge na bango ya kosolola mpe (b) básilikaka mpambampamba te? (5) Ndenge nini lolenge oyo bakristo batalelaka libala ebongisaka bomoi ya libota? (Ef. 5:28, 29) (6) Ndenge nini Yehova apesi ndakisa eleki malamu mpo na baboti? (Mko. 1:9-11) (7) Nini baboti bakoki kosala mpo boyekoli ya libota esepelisa bato nyonso ya libota? (8) Longola boyekoli ya Biblia, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa baboti básala lisusu nini mpo na bana na bango? (9) Ndenge nini batoli ya Biblia esalisaka mabota na makambo ya mbongo? (10) Mitinda nini ya Biblia oyo etali bopɛto, komɛla bangi, kolangwa masanga, mpe mitungisi, oyo soki totosi yango, ekosalisa biso tózwa maladi mpambampamba te? (11) Bilaka nini ya Biblia ekoki kolendisa biso? (Yobo 33:25; Nz. 145:16) (12) Ndenge nini mateya ya Liloba ya Nzambe esalisaki yo obongola bomoi na yo? (13) Ndenge nini okoki kosalela video oyo mpo na kosalisa basusu?