Tósalela batrakte mpo na kobanda lisolo
1 Na ntembe te okondima ete kopesa litatoli ya malamu etalelaka mingimingi milende na biso ya kobanda lisolo na bato, boye te? Ezalaka mpasi mpo na koloba likambo oyo ekobenda likebi ya moto mpe etinda ye akɔta na lisolo. Kasi ndenge nini tokoki kosala yango malamu?
2 Basakoli mingi bamonaki ete soki baponi maloba ya malamu mpo na kolakisa trakte moko kati na batrakte na biso oyo ezali na mateya ya Biblia ekoki kopesa nzela na kobanda lisolo na moto. Mitó ya makambo ya batrakte yango ezali mpenza kosepelisa, mpe bililingi na yango ezali na langi ya kitoko mpe ezali kobenda likebi. Trakte elɛmbisaka moto te, emonisaka ete ezali na makambo ya kotánga mingi te. Atako bongo, bansango ya mokuse oyo ezali na kati ya batrakte yango ezali mpenza kosepelisa mpe ekoki kopesa nzela na kobanda koyekola Biblia na moto.
3 Ndeko mwasi moko azalaki na likanisi yango, alobi ete: “Lokola mokili oyo etondi na makambo mingi ya kosala, mbala mingi bato balingaka kolekisa ntango mingi te na kotánga. Nzokande batrakte ekoki mpo na koyebisa nsango ya ntina, mpe ezali molai mingi te mpo bato báboya kotánga yango liboso kutu ete bátala yango ata kotala. Natángaki batrakte mingi, mpe nsukansuka nayaki koyeba solo.” Tótyola soko moke te nguya ya Liloba ya Nzambe ndenge yango elimbolami na mwa mikanda ya mike.—Ebe. 4:12.
4 Matambe minei ya pɛtɛɛ: Basakoli mingi balongaki mpo basalelaki lolenge moko ya pɛtɛɛ. (1) Lakisá moto mwa batrakte mingi mbala moko mpe tuná ye soki trakte nini esepelisi ye. (2) Soki aponi trakte moko, tuná ye motuna moko oyo obongisi malamu, motuna oyo ezali komonisa likanisi ya ntina oyo elobelami na kati ya trakte yango. (3) Mpo na koyanola na motuna yango, tángá paragrafe moko oyo ebongi to mokapo moko oyo ezali na kati ya trakte yango. (4) Soki asepeli, bólanda lisolo na kati ya trakte to bótalela liteya moko ya mwa buku Azali kosɛnga to bótalela mokapo moko na buku Boyebi oyo ekopesa bandimbola mosusu na motuna yango. Soki osali bongo, okoki kozwa libaku ya kobanda mbala moko koyekola Biblia na moto yango. Makanisi oyo elandi ekosalisa yo obongisa makambo oyo okoloba soki osaleli batrakte minei oyo.
5 Tokoki kosalela motó ya likambo ya trakte “Nani Mpenza Azali Koyangela Mokili?” mpo na kotuna moto oyo tozali kosolola na ye motuna.
◼ Soki moto oyo ozali kosolola na ye ayanoli ete ezali “Nzambe” to “Nayebi te,” tángá fraze mibale ya ebandeli oyo ezali na lokasa 2 mpe paragrafe ya liboso na lokasa 3. Lobelá 1 Yoane 5:19 mpe Emoniseli 12:9. Ata soki moto oyo ozali kosolola na ye azali kondima te ete Satana azali to soki andimi ete Satana nde azali kobebisa mokili oyo, okoki koloba ndenge makambo emonisami na motó ya likambo moke “Mobandisi ya bampasi na mokili” mpo na kolanda lisolo. Soki moto yango asepeli, salelá makambo oyo ezali na lokasa 3 mpe 4 ya trakte mpo na komonisa ye ndenge Satana abandaki.
6 Trakte “Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?” ekoki kobenda mbala moko likebi ya moto. Okoki kobanda lisolo na kotunáká motuna oyo:
◼ “Okanisi ete tokokutana lisusu na balingami na biso oyo bakufá?” Soki moto yango apesi eyano na ye, lakisá ye paragrafe ya mibale na lokasa 4 ya trakte mpe tángá Yoane 5:28, 29. Na nsima limbolá ete yango ekosalisa biso tóyeba makambo oyo ezali motó ya likambo ya liboso ya moke na trakte yango. Sɛngá ye soki bokoki kotalela yango elongo.
7 Trakte “Bomoi Malamu na Libota” ezali kosepelisa mabota nyonso na mokili. Mpo na kosalela yango, okoki koloba boye:
◼ “Na ntembe te okondima ete libota ezali kokutana na mitungisi mingi lelo oyo. Mpo na yo likambo nini tokoki kosala mpo na kolendisa boyokani na libota?” Soki moto yango apesi eyano na ye, na nsima bendá likebi na ye na makambo oyo ezali na paragrafe ya liboso na lokasa 6. Poná mokapo moko kati na mikapo oyo ezali na paragrafe 4 mpe 5 ya trakte, mpe limbolá yango. Na nsima yebisá ye ete na boyokani na makanisi oyo ezali na trakte, okosepela koyekola Biblia elongo na ye kozanga ete afuta mbongo.
8 Okoki kosalela maloba oyo mpo na kolakisa trakte “Mpo na nini kondimela Biblia”:
◼ “Bato mingi basilá koyoka lisolo ya Kaina na Abele, oyo ezali na mokanda ya liboso ya Biblia. Lisolo ya Genese mpe ezali kolobela mwasi ya Kaina. Osilá komituna soki mwasi yango autaki wapi?” Salelá paragrafe ya nsuka na lokasa 2 ya trakte mpo na kopesa eyano. Limbolá ete trakte oyo ezali mpe kolobela makanisi ya ntina ya Biblia mpo na bomoi na biso na mikolo mizali koya. Bandá na paragrafe ya misato na lokasa 5, mpe landá lisolo elongo na moto yango, salelá mikapo ya Biblia.
9 Kokabola batrakte oyo masolo na yango euti na Biblia eyebani uta kala lokola lolenge moko ya malamu ya kosakola nsango malamu. Lokola trakte ezalaka mike mpe okoki komema yango kozanga mindɔndɔ, okoki kosalela yango malamu ntango ozali na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe ntango ozali kopesa litatoli ya libaku malamu. Batrakte ezali na ntina mingi wana tozali kokokisa mosala na biso ya kosakola. Ekozala malamu ete ozala na batrakte ndenge na ndenge ntango obimi na mosala ya kosakola mpe salelá yango mingi mpo na kobanda lisolo na bato.—Kols. 4:17.