Tyá likebi na ndenge ozali koyoka
Kotya likebi ezali mpenza na ntina ntango tozali koyangana na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. (Luka 8:18) Ndenge nini okoki kosala mpo oyoka malamu?
◼ Zalá na makita banda na ebandeli na yango.
◼ Kolya mingi te liboso ya makita.
◼ Kotika te ete makanisi na yo etambolatambola.
◼ Komaká mwa makambo ya ntina.
◼ Tángá mikapo oyo molobi azali kopesa na Biblia na yo.
◼ Pesá biyano soki libaku emonani.
◼ Zwá ntango ya kokanisa makambo oyo bazali koteya na makita.
◼ Kanisá ndenge oyo okoki kosalela makambo oyo ozali koyoka.
◼ Landá makita tii na nsuka.
◼ Na nsima, sololá na bato mosusu makambo oyo oyoki na makita.
Talá buku Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, liteya 5.