Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/00 lok. 8
  • Salá ete obosana te kozongela ye!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salá ete obosana te kozongela ye!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tókomaka makambo etali bato oyo basepeli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 4/00 lok. 8

Salá ete obosana te kozongela ye!

1 “Tosololi malamu mpenza! Nasengeli kozongela ye.” Naino oloba boye te mpe na nsima obosani esika moto yango afandaka? Soki ezali bongo, oyebi ete lolenge bobele moko oyo okoki kosala ete obosana te kozongela ye, ezali ya kokoma yango.

2 Komá makambo yango nyonso: Wana lisolo oyo outi kosolola na moto oyo asepeli ezali naino na makanisi na yo, komá makambo nyonso oyo ekosalisa yo ete ozongela ye. Komá nkombo ya moto yango mpe ndenge oyo okoyeba ye lisusu. Komá adrɛsi na ye mpe adrɛsi oyo okomi esengeli ezala mpenza yango. Komá lisolo oyo bosololaki, mikapo nyonso oyo botángaki mpe mokanda nyonso oyo otikelaki ye.

3 Soki otikelaki moto yango motuna oyo okoyanola ntango okokutana na ye na mbala ya nsima, komá yango. Oyebi mwa makambo ya moto yango, libota na ye to lingomba na ye? Soki oyebi, komá yango. Na nsima ntango okozongela ye soki obandi kolobela makambo yango ekomonisa ete ozali solo kotyela moto yango likebi. Na nsuka, komá mokolo mpe ngonga oyo bokutanaki na ye mpo na mbala ya liboso mpe mokolo oyo olobi ete okozongela ye. Soki ozali kozwa banɔti malamumalamu, okobosana likambo moko te mpe okobosana kozongela ye te.​—1 Tim. 1:12.

4 Soki osilisi kokoma, tyá yango esika moko na biloko na yo mosusu ya mosala ya kosakola​—sakosi na yo ya mikanda, Biblia, buku Comment raisonner to mikanda mosusu​—na bongo ekozala ntango nyonso pene na yo. Ezali malamu kokoma bandako to bisika oyo okuti bato te na lokasa mosusu “note de maison en maison” na esika ya kokoma yango na lokasa oyo ozali kokoma makambo mpo na bato oyo okozongela bango. Ya solo, atako omipesi mosala makasi ya kokoma malamumalamu makambo oyo ekosalisa yo mpo na kozongela bato oyo basepeli, likambo ya ntina ezali ya kobosana te ete okozongela ye!

5 Kanisá moto yango: Ntango ozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola, talá lisusu banɔti na yo, na esika okomaki mwa makambo mpo na bato oyo okozongela bango. Kanisá moto mokomoko mpe lisolo oyo ekozala malamu osolola na ye ntango okozongela ye. Kanisá ndenge oyo okoki kosalisa moto yango ete asepela na boyekoli ya Biblia. Komibongisa motindo oyo ekoki kokolisa makoki na yo lokola ministre ya nsango malamu mpe, na bongo ekobakisa esengo na yo.​—Mas. 21:5a.

6 Na yango mbala mosusu oyo okokutana na moto oyo asepeli koyoka yo, kokanisa te ete okobosana ye te. Na esika ya kosala bongo, komá yango, talelá lisusu banɔti na yo, kanisá moto yango mpe sala ete obosana te kozongela ye!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto