Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/03 lok. 8
  • Tósalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ezali na ntina komibongisa mpo na kozongela bato na ndenge oyo ekobota mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tólóna bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 12/03 lok. 8

Tósalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi”

1. Banani oyo Yehova azali koyanganisa epai na ye na mikolo na biso?

1 Moto na moto azali na ezaleli moko oyo ezwá mpenza misisa na motema na ye. (Mat. 12:35) Biblia elobeli moto oyo “motema na ye etondi na etumba.” (Nz. 55:21) Bamosusu bazali “bato ya nkanda.” (Mas. 29:22, NW) Kasi, ezali mpe na baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Na mikolo na biso, Yehova azali koyanganisa bato ya ndenge wana epai na ye. (Hag. 2:7) Ndenge nini tokoki kosalisa bango bákóma basambeli ya Yehova?

2. Nini esɛngami mpo na kokokisa mokumba na biso ya kokómisa bato bayekoli?

2 Tózala na molende ya kozongela bato: Mpo tókokisa mokumba na biso ya kokómisa bato bayekoli, ezali na ntina mingi tózala na makanisi malamu na oyo etali kozongela bato. (Mat. 28:19, 20) Tosalaka nokinoki mpo na kokolisa mposa ya baoyo basepelaki? Tozongelaka bato nyonso oyo bandimaki kozwa mikanda to baoyo basepelaki na nsango malamu? Tolandaka kosala milende mpo na kosalisa bango bákola na elimo? Lokola bomoi ya bato ezali na likama, tosengeli koluka kokolisa mposa ya bato nyonso oyo basepeli na nsango na biso.

3. Osengeli kosala nini nsima ya kosolola na moto moko na mosala ya kosakola?

3 Soki osololi na moto, komá nkombo na ye mpe esika oyo afandaka wana ozali naino koyeba lisolo oyo bosololi. Komá lisolo yango, mikapo oyo botángaki, mpe mokanda oyo opesaki ye. Na nsima, salá makasi ozongela ye nokinoki soki likoki ezali.

4. Ndenge nini okoki kosala bozongeli ya sika oyo ezali mpenza kobota mbuma?

4 Ndenge ya kosala bozongeli ya sika: Ntango ozongeli moto oyo bosololaki na ye, ezali malamu kozala na nsai mpe na boboto, mpe komonisa ye ete ozali mpenza kosepela na ye. Salá lisolo moko ya pɛtɛɛ oyo euti na Biblia. Bongisá lisolo moko ya Biblia oyo ekosepelisa moto yango, mpe na nsuka ya lisolo yango tuná ye motuna moko oyo okopesa eyano na yango mbala ekoya. Soki moto yango apesi makanisi oyo eyokani na Biblia te, ekozala malamu te kotyana na ye ntembe ezangá ntina. Sololá na ye nde na makambo oyo bozali koyokana na yango mpo na koteya ye solo ya Biblia.​—Kols. 4:6.

5. Milende nini mobongisi-nzela moko asalaki, mpe mbuma nini yango ebotaki?

5 Kozongela bato esɛngaka mpenza kosala milende, kasi matomba na yango esepelisaka mpenza. Mobongisi-nzela moko na ekólo Japon azwaki mokano ete sanza na sanza, azongelaka bato mingi. Abandaki kokoma nkombo ya bato nyonso oyo azalaki kokutana na bango na mosala ya ndako na ndako, mpe azalaki kozongela bango kaka na pɔsɔ wana. Azalaki kobongisa malamumalamu makambo oyo akoloba mpe azalaki mpenza kotyela nsango oyo azalaki komema motema. Mokolo moko, ntango azongelaki moto moko, abandaki koyekola na ye, mpe moto yango alobaki na ye boye: “Nabenganaka bato na bino oyo bayaka awa. Oyo ezali mbala ya liboso nandimi koyoka bino.” Bolingo oyo mobongisi-nzela azalaki na yango ya kozongela bato mbala na mbala ebotaki mbuma. Na nsuka ya sanza ya liboso, akómaki koyekola Biblia na bato 10.

6. Mpo na nini tosengeli kozongaka mbala na mbala kotala bato oyo basepelaki?

6 Bomoi ya bato ezali kobongwana ntango nyonso. (1 Kol. 7:31) Esɛngaka ntango mosusu kozongela mbala na mbala moto moko oyo asepelaki na nsango malamu liboso ya kokuta ye na ndako. Soki tozali na molende ya kozongela bato, tokoki kosalisa baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi bátambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.​—Mat. 7:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto