Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo ezali na motó ya likambo ete “Bókóma mikóló na makanisi,” ekobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2000. (1 Bakolinti 14:20) Mpo na nini ezali na ntina ete tózala na liyangani yango? Tozali na mokili oyo etondi mpenza na mabe. Mpo tóboya makambo mabe ya mokili yango, tosengeli kokolisa makoki na biso ya kososola na elimo mpo makambo ya mabe elonga biso te kasi tósala makambo ya malamu mpo tólonga oyo ya mabe. Liyangani na biso ya mokolo moko ekosalisa biso tósala bongo.
Na programɛ ya ntɔngɔ, mokɛngɛli ya zongazonga akosala lisolo “Lisalisi mpo na kokóma mikóló na boyebi ya Biblia.” Akomonisa biso ndenge oyo tokoki kopikama kati na kondima ya boklisto. Na lisolo na ye oyo ezali na motó ya likambo “Kolisá makoki ya kososola mpo na kobatela elimo na yo,” molobi-mopaya akomonisa ete kosalela mitinda ya Biblia, to kotosa yango, ezali na ntina mpo ete moto akóma na bososoli mingi.
Bilenge mpe basengeli kokolisa bososoli na bango. Yango ekolobelama na masukulu oyo ezali na motó ya likambo “Mpo na nini kozala bana mike kati na makambo mabe” mpe “Bilenge oyo bazali kozwa mayele lelo oyo.” Tokoyoka ndenge bilenge bakolobela makambo oyo basalaka mpo na komilendisa na elimo mpe kopekisa mposa nyonso ya koluka koyeba makambo mabe ya mokili oyo mpe ndenge basalaka mpo na koboya makambo ya mobulu.
Ndenge nini tokoki kozwa bolamu oyo eleki bolamu nyonso na bomoi na biso? Molobi-mopaya akolimbola yango na lisukulu ya nsuka oyo ezali na motó ya likambo “Matomba ya kosalela mitinda ya Biblia na bososoli.” Akopesa bandakisa mpo na komonisa ete kosalela mibeko oyo ezali na Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso mpo tóyika mpiko na mikakatano, tózwa bikateli ya malamu, mpe tózwa litomba na makambo oyo Yehova azali koteya biso.
Baoyo balingi kozwa batisimo na liyangani yango mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe, basengeli koyebisa yango nokinoki epai ya mokɛngɛli-mokambi ya lisangá na bango. Ntango bakoyebisa bino dati ya liyangani ya mokolo moko osengeli kotya elembo na manaka na yo, mpe omibongisa mpo ete ozwa matomba na programɛ ya makambo ya elimo wana. Kozangisa ata lisukulu moko te oyo ekosalema na liyangani ya mokolo moko! Yango ekolendisa yo ete oyika mpiko na mokili oyo ya mabe mpe otikala sembo epai ya Yehova.