Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/98 lok. 5
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • ‘Bilei na ntango oyo ebongi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 9/98 lok. 5

Liyangani ya sika ya mokolo moko

Ebongiseli ya liyangani ya mokolo moko ebandaki na 1987. Liyangani yango ya mokolo moko esili komonisa ete ezali mpenza kotonga basaleli ya Nzambe mpe baoyo bazali kosepela na solo mpe bayanganaka na liyangani yango. Kobanda Sɛtɛ́mbɛ 1998, liyangani ya sika ya mokolo moko likosalema. Bokomona ete masukulu libwa oyo mabongisami, mituna-lisolo mpe baeksperiansi oyo ekolobelama, ezali mpenza kopesa matomba na elimo.

Motó na likambo ya liyangani yango ezali ete “Tózwa mesa ya Yehova na motuya.” (Yis. 65:14; 1 Kol. 10:21) Ekolendisa ekateli na biso ya kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na biso. (Nz. 27:4) Lisolo ya mokɛngɛli ya zongazonga ekozala na motó na likambo ete “Tótalelaka makanisi ya mitema na biso.” Yango ekolobela ezaleli na biso mpo na makita. Molobi-mopaya akosala lisukulu oyo ezali na motó na likambo ete “Batelá elimo na yo na komileisáká na mesa ya Yehova.” Bilenge kati na ebongiseli ya Yehova bakozwa elendiseli mpo na kobatela molende na bango ya kosalela Nzambe. Lisukulu-moboko ya molobi-mopaya ekozala na motó na likambo ete “Tolendisami na elimo mpo na kopesa litatoli na mpiko,” ekomonisa biso lolenge bibongiseli oyo bikamatami na nzela ya lisangá bizali kosalisa biso mpo na kotatola Bokonzi na mpiko nyonso. Nani akolinga kozanga na liyangani yango?

Baoyo bamipesi na Nzambe mpe balingi kozwa batisimo, basengeli koyebisa mokɛngɛli-mokambi noki mpenza. Tozali na elikya ete lokola tokómi na mobu ya 12 uta ebongiseli ya liyangani ya mokolo moko ebandaki, moto nyonso oyo akoyangana na liyangani yango akolendisama mpo na kokoba komipesa na mosala oyo ezali liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto