Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/09 lok. 1
  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • ‘Bilei na ntango oyo ebongi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya mayangani
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liloba ya Nzambe ezali na nguya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 8/09 lok. 1

Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010

1. (a) Tángá mwa mitó ya makambo ya mayangani ya mokolo moko oyo esalemaki na bambula eleki. (b) Ezali na masolo oyo esalemaki na mayangani ya mokolo moko ya bambula eleká oyo esalisaki yo na mosala ya kosakola?

1 “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina,” “Tótɛlɛma ngwi lokola etonga moko,” “Kobá kopesa litatoli mpo na solo,” mpe “Biso tozali lima​—Yehova azali Moyemi-mbɛki.” (Filp. 1:9, 10, 27; Yoa. 18:37; Yis. 64:8) Wana ezali mwa ndambo ya mitó ya makambo ya mayangani ya mokolo moko ya bambula eleká. Ozali kozela na mposa makasi liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010? Motó ya likambo na yango elobi: “Ntango oyo etikali ekómi mokuse,” euti na 1 Bakolinti 7:29.

2. Tokoki kosala nini mpo tózela liyangani yango na mposa makasi?

2 Banda komibongisa mpo na liyangani ya mokolo moko ntango kaka bakopesa dati oyo bokosala yango. Mpo na kosalisa bana na bango bábosana mokolo ya liyangani te, baboti mosusu bakomaka yango na calendrier, bakomaka mpe biloko oyo basengeli na yango mpo na liyangani mpe balandelaka mikolo. Na Boyekoli ya libota, bokoki kotánga lisusu makambo oyo bokomaki na mayangani ya mokolo moko oyo elaká. Lisusu, bosengeli kobongisa mitema na bino mpo na liyangani yango; mpo na yango, bokoki kozongela makanisi oyo ezali na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 13-16 mpo ete libota mobimba “bókeba na ndenge bozali koyoka.”​—Luka 8:18.

3. Ndenge nini tokoki kozwa mpenza litomba na makambo oyo tokoyoka na liyangani?

3 Salelá makambo oyo okoyoka: Mbala mingi, na nsuka ya liyangani bandeko mingi balobaka: “Liyangani yango ezalaki kitoko mpenza!” Ezalaka bongo mpamba te liyangani ezali moko ya bibongiseli kitoko ya Yehova. (Mas. 10:22) Kasi, mpo makambo oyo toyoki ebota mbuma, tosengeli komanyola yango mpe kobomba yango na mitema na biso. (Luka 8:15) Ntango bozali kozonga na ndako nsima ya liyangani, bózwa ntango ya kolobela ná bato mosusu ya libota to bandeko mosusu makambo oyo boyokaki. Bólobela mikano oyo bomityeli mpe makambo oyo ekosalisa bino na mosala ya kosakola. Kosala bongo ekosalisa bino bóbosana noki te makambo oyo boyokaki na liyangani.​—Yak. 1:25.

4. Mpo na nini liyangani ya mokolo moko ekozala na ntina mingi mpo na biso?

4 Tosepelaka mingi ntango bapesi biso likabo moko oyo tozalaki mpenza na mposa na yango. Tozali kozela na mposa makasi makambo oyo Yehova abongisi mpo na biso na liyangani ya mokolo moko! Tóyeba ete ekosalisa biso na makambo nyonso. Tokoki kozala na elikya ete Yehova, Tata na biso ya likoló, akopesa biso likabo oyo ebongi na ndenge akolendisa biso mpe akopesa biso formasyo mpo tókokisa mosala oyo apesi biso.​—2 Tim. 4:2; Yak. 1:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto