Bisaleli oyo ezali koteya mpe kolendisa
1 Ezali koteya bato Biblia malamumalamu mpe makambo etali Batatoli ya Yehova. Elendisaki bato mingi ete bázwa ekateli ya kolanda mateya ya solo na motema moko. Esili kolendisa kondima ya basaleli ya Nzambe oyo bamipesi epai na ye mpe bazali kopesa matɔndi mpo na yango. Ezali nini? Bakasɛti video oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa. Osi otalá bakasɛti video yango nyonso zomi? Mbala ya nsuka oyo otalaki yango ezalaki ntango nini? Osalelaka yango na mosala ya kosakola? Na liyangani ya etúká, bapesaki liyebisi ete kasɛti video ya 11 ebimi (na Lingelesi), ezali na motó ya likambo ete: Toute la communauté de nos frères (Libota mobimba ya bandeko). Osili kosala komande na yango? Ndenge nini okoki kozwa matomba mingi lisusu na bisaleli malamu oyo?
2 Lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999 oyo ezalaki na motó ya likambo “Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota” elendisaki biso na maloba oyo: “bokoki mpe kolekisa mwa ntango ya boyekoli na bino na kotala video . . . ya la Société, bongo na nsima kolobela makambo oyo bolandi.” Mpo na kolanda toli malamu wana, na basanza oyo ekoya tokobanda kolobela bakasɛti video ndenge na ndenge na Likita ya Mosala. Tolendisi moto mokomoko na kati ya lisangá ete atala bakasɛti video yango liboso ete tólobela yango na Likita ya Mosala.
3 Na sanza oyo tokobanda na kasɛti video ya liboso oyo ebimaki, Les Témoins de Jéhovah—Un nom, une organisation (Batatoli ya Yehova—Nkombo mpe ebongiseli na bango). Tosɛngi yo ete otala kasɛti video yango mpe oyoka yango malamu mpo na koyanola na mituna oyo elandi:
◼ Batatoli ya Yehova bayebani mingi mpo na likambo nini?
◼ Misala nyonso oyo ezali kosalema na Betele, ezali na boyokani na mokapo nini ya Makomami?
◼ Makambo nini ya Biblia omonaki bazali kobongisa yango, kokanga yango fɔtɔ, mpe koyema yango mpo na kosalela yango na mikanda?
◼ Eloko nini ebendaki likebi na yo na kotalela ndenge oyo mikanda na biso ebongisamaka?
◼ Kobanda na mobu 1920 kino 1990, la Société abimisaki mikanda boni?
◼ Na kati ya basaleli ya Nzambe, banani mpenza basengeli kosala milende mpo na kokokisa masɛngami ya kosala na Betele?—Mas. 20:29.
◼ Ndenge nini libota ya Betele ezali kopesa ndakisa malamu mpo na Batatoli ya Yehova nyonso?
◼ Likambo nini ebendaki mpenza likebi na yo na mosala oyo ezali kosalema na Betele mpo na kopesa likoki ya koyebisa bato mingi nsango malamu?
◼ Tozwaka mbongo wapi mpo na kotambwisa mosala na biso na mokili mobimba?
◼ Tokoki kopesa mabɔkɔ na molende nyonso na mosala nini, mpe tosengeli komonisa elimo nini mpo na yango?—Yoa. 4:35; Mis. 1:8.
◼ Okanisaka nini mpo na lisangá oyo ezali na nkombo na biso?
◼ Ndenge nini okoki kosalela kasɛti video oyo na mosala ya kosakola?
Na sanza ya Desɛmbɛ tokotalela kasɛti video, La Bible: un récit historique exact, des prophéties dignes de foi (Biblia ezali na bisakweli ya solo mpe ebongi kotyela yango motema).