Les Témoins de Jéhovah : organisés pour proclamer la bonne nouvelle
Esali sikoyo mbula koleka 100 banda Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu. Mosala yango ezali kosalema mingi na mokili mobimba na ndenge oyo esalemá naino liboso te, mpe tozali kosakola nsango yango na bankama ya minɔkɔ mpe na mikili koleka 230. (Mat. 24:14) Mpo na nini mosala yango esengeli kosalema? Mpe ndenge nini ezali kosalema na mokili mobimba? DVD oyo ezali na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah : organisés pour proclamer la bonne nouvelle (Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu) epesi biyano na mituna yango mpe ezali komonisa makambo ndenge na ndenge oyo etali mosala na biso na mokili mobimba. Nsima ya kotala DVD yango, pesá biyano na mituna oyo elandi:
Ndenge nini DVD oyo esalisi yo osepela lisusu mingi na: (1) milende oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosala mpo ete nsango malamu esakolama? (2 Tim. 4:2) (2) libota ya Betele na mokili mobimba? (3) formasyo oyo bapesaka bamisionɛrɛ mpe bakɛngɛli? (2 Tim. 2:2) (4) ntina ya kotánga mokapo ya mokolo ntɔngɔ nyonso mpe kobongisa makita nyonso? (Mis. 17:11) (5) matomba oyo tozwaka na makita na biso? (Ebr. 10:24, 25) (6) mapamboli oyo okozwa ntango mabele ekozonga Paradiso? (Yis. 11:9) (7) libaku malamu oyo ozali na yango ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali naino kosalema?—Yoa. 4:35.
DVD oyo esalisaka mpenza bato oyo basepelaka na nsango malamu báyeba mosala oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. (8) Ntango nini ekozala malamu kotala DVD yango ná bayekoli na biso ya Biblia, bandeko na biso ya libota, mpe bato mosusu? (9) Makambo nini ya malamu bato balobaki mpo na DVD yango ntango botalaki yango?
Soki tokanisi makambo oyo Yehova azali kosala, yango ekotinda biso tóloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Yo moko osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso; Moko te akokani na yo.” (Nz. 40:5) Tiká ete tósalela malamu DVD oyo mpo na kosalisa bato mosusu básepela mpenza na Yehova mpe na ebongiseli na ye!