Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/00 lok. 1
  • ‘Liloba oyo elobami na ntango malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Liloba oyo elobami na ntango malamu’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Sololá ndenge bato basololaka
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Kosalela malamu mituna
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Filipo abatisi mokonzi moko ya Letá Moetiopia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 11/00 lok. 1

‘Liloba oyo elobami na ntango malamu’

1 Koyebisa bato mosusu nsango ya bomoi ezalaka mpasi mingi mpo na yo? Okanisaka ete osengeli koloba likambo moko ya makasi mpo na kokamwisa bato oyo ozali kosolola na bango? Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye, ayebisaki bango ete: “Wana ekokende bino, bósakola ete, Bokonzi na Likoló ezali kobɛlɛma.” (Mat. 10:7) Nsango yango ezalaki ya mindɔndɔ te mpe ezalaki mpasi te mpo na koyebisa yango. Ezali mpe bongo lelo oyo.

2 Mbala mingi, esɛngaka kaka koloba moke mpo na kobanda lisolo. Ntango Filipo akutanaki na Mokube Moetiopia, atunaki ye ete: “Ososoli makambo mazali yo kotánga?” (Mis. 8:30) Lokola ezalaki ‘liloba oyo elobami na ntango malamu,’ basololaki malamu mpe yango ebimisaki matomba!​—Mas. 25:11.

3 Okoki mpe kosalela maloba yango na mosala ya kosakola. Ndenge nini? Osengeli kosalela miso na yo mpe kopona maloba oyo ebongi koloba yango na ntango wana. Tuná motuna, mpe yoká eyano.

4 Mituna ya ntina: Mpo na kobanda lisolo, okoki kotuna mituna lokola oyo:

◼ “Ntango osambelaka, osalelaka Libondeli ya Nkolo (Tata wa Biso)?” (Mat. 6:9, 10) Tángá mwa maloba ya libondeli yango mpe lobá boye: “Bato mosusu bamitunaka, ‘Nkombo ya Nzambe oyo Yesu alobaki ete esantisama (to, ekumisama) ezali nkombo nini?’ Bato mosusu batunaka, ‘Bokonzi oyo Yesu alobaki ete tóbondela mpo na yango, ezali Bokonzi oyo wapi?’ Osi ozwá biyano ya malamu na mituna oyo?”

◼ “Osi omituná motuna oyo: ‘Ntina ya bomoi ezali nini?’ ” Monisá ete yango ezali na boyokani na boyebi ya Nzambe.​—Mos. 12:13; Yoa. 17:3.

◼ “Okanisi ete liwa ekosila?” Tángá Yisaya 25:8 mpe Emoniseli 21:4 mpo na kopesa eyano oyo moto yango akoki kondima.

◼ “Ezali na lolenge ya pɛtɛɛ mpo na kosilisa mobulu na mokili?” Monisá ete Nzambe azali koteya ete ‘lingá mozalani na yo.’​—Mat. 22:39.

◼ “Ekoki kosalema ete mokolo mosusu planɛti moko, monzoto to eloko mosusu euta na likoló mpe ekwela mabele to etutana na yango mpe ebebisa yango?” Yebisá elaka ya Biblia oyo elobi ete mabele ekotikala libela na libela.​—Nz. 104:5.

5 Ntango ozali kosakola nsango malamu, salelá maloba ya pɛtɛɛ, lobá mbala moko likambo oyo oyei na yango mpe lobá na boboto. Yehova akopambola milende oyo ozali kosala mpo na kolobela bato mosusu ata “liloba” moko ya solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto