“Liloba ya esakweli ya Nzambe” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na 1999
1 Wana Bayisalaele bazalaki na mokili mokauki, Yehova ayebisaki Mose ete asala kelelo mibale ya palata. Soki kelelo moko mpamba eleli, bankumu nyonso ya mabota basengelaki kosangana liboso ya hema ya koyangana. Kolela ya kelelo nyonso mibale ezalaki elembo ete babéngi libota mobimba ya Yisalaele na liyangani. (Mit. 10:1-4) Lelo oyo, tozalaka na esengo mingi, ntango tozali koyoka mayebisi ya liyangani na biso ya etúká, oyo ezali lokola kolela ya kelelo, boye te? Na ntango ya mayangani na biso Yehova apesaka biso malako mpe litambwisi na nzela ya Liloba na ye mpe ya bamonisi na ye oyo baponami. Yango esalisaka biso na kokangama na mosala ya Nzambe. Tosepelaka ntango tomonaka bankóto ya bandeko na biso ya sembo bayangani elongo na bolingo mpe na kimya, boye te? Tosepelaka mingi mpenza!—Nz. 122:1, 7, 8.
2 Kobanda sanza ya Augusto kino sanza ya Sɛtɛmbɛ 1998, mayangani ya etúká 58 mabongisamaki na bingumba 56 ya teritware na biso. Mayangani yango mazalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.” Na République démocratique du Congo, mayangani nsambo masalemaki na dati oyo ebongisamaki te mpo na mobulu oyo ezali na mboka. Soki Yehova alingi tozali kolikya kosala yango mosika te. Tozali kopesa bino longonya mpo na mpiko oyo bomonisaki mpo na koyangana atako mboka etondi na mobulu. Balapolo emonisi ete bato mingi, bakisa mpe mabota mobimba, na bibɔsɔnɔ, batambolaki bakilomɛtɛlɛ mingi na makolo, mpo mituka ezalaki te. Basusu batambolaki na boumeli ya mikolo, to mpe ya bapɔsɔ. Ndeko mobali moko oyo akufa miso atambolaki kilomɛtɛlɛ 260 na makolo, mpo na koyangana na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Mbuji-Mayi. Yango ezali momeseno na ye mbula na mbula. Milende oyo nyonso ezalaki mpenza na ntina? Ɛɛ, ezalaki mpenza na ntina! Bandeko nyonso oyo bayanganaki, basepelaki na libaku ya ‘kolendisana bamoko na bamosusu wana bazali komona ete mokolo ebɛlɛmi.’ (Ebe. 10:24, 25) Ndeko mobali moko alobaki: “Bato nyonso balendisamaki na bibongiseli yango ya elimo.” Na liyangani ya etúká oyo ekosalema na 1999, tokozala na mabaku mosusu ya malamu mpo na kosepela kozala esika moko na bandeko na biso mpe kotɔnda Yehova na ndenge azali kosangisa biso esika moko.
3 Bómibongisa malamumalamu uta sikawa mpo na koyangana na mikolo misato ya elambo yango kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli kino libondeli ya nsuka. Mbala mingi, liyangani epai bobyangami ezali oyo ekosalema pene mpenza na esika oyo bofandaka. Na yango, la Société asali nyonso mpo ete bózala na mokakatano te mpo na likambo yango. Bisika minei ya sika ebakisami na liste ya bisika ya mayangani oyo ebimaki na mbula eleki. Yango ezali mpo na kopesa nzela na mokomoko kati na biso ete alya na elimo esika moko na libota na ye. (Det. 31:12) Bisika yango ezali: Nyabihanga na Burundi, Luiza na Kasai occidental, Basankusu mpe Bosondjo na Équateur. Bóbanda komibongisa uta sikoyo mpo na kobomba mosolo mosengeli mpo na transport ya bino nyonso. Mpo na komonisa botɔndi na bibongiseli oyo la Société asili kozwa, ekozala malamu ete moto na moto ayangana na liyangani oyo zongazonga na ye ebyangami. Nzokande, soki mpo na likambo moko ya ntina bosengeli koyangana na esika mosusu, bozali na bonsomi ya kosala yango.
4 Wana bozali kozwa bibongiseli mpo na koyangana na liyangani ya etúká, bómonisa mpe bolingo na kokanisáká bandeko oyo bazali na mposa ya lisungi, mingi mpenza baoyo bazali kosepela na solo sika, mpo ete báyangana na liyangani mobimba. Ekozala malamu kotalela makanisi oyo epesami na lisolo oyo elongo na bato oyo boyekolaka na bango Biblia, baoyo bazali kokana koyangana na liyangani. (Gal. 6:6, 10) Mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, liyangani ekobanda na miziki na 9:30 mpe ekosila pene na 5:00 ya mpokwa. Mokolo ya lomingo, liyangani ekobanda na ntɔngɔ na 9:30, mpe ekosila pene na 4:00 ya mpokwa. Mayebisi oyo malandi makosalisa bino mpo na komibongisa.
5 Na momeseno bapaya bayambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai na bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete bábebisa ezalela wana na kosɛngisáká ete bálalisa bango na boumeli ya ntango molai liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka bobele na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama na bisika ya bandeko basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango. Basengeli kobebisa eloko moko te, kokenda te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na departema ya boyambi bapaya, oyo ekozala na esengo ya kopesa bango lisungi. Mpo ete departema ya boyambi bapaya etambola na molɔngɔ mpe esala malamu; esengeli ete bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Bayebisaki biso ete bandeko mosusu bazali kotika na bolingi na bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokenda na esika mosusu epai kuna moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na departema ya koyamba bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bósala elongo na departema yango.
6 Mibange to bibɔsɔnɔ, basaleli ya ntango nyonso to bandeko mosusu bakoki kozala na mposa ya lisungi mpo na koyangana na liyangani. Bandeko na bango ya mosuni, bankulutu to bandeko ya lisangá na bango baoyo bayebi ezalela na bango malamu bakoki na bolingo nyonso kosala oyo esengeli, kasi basengeli te kobwaka mokumba yango likoló na bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani.—Talá 1 Timote 5:4.
7 Ntembe ezali te ete Yehova asungaka misala oyo esalemaka mpo na mayangani ya mbula na mbula. Lokola bandeko mingi oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokenda na liyangani ya etúká bazalaka na mposa ya kozwa bisika ya kolala, tokoki komindimisa ete Yehova akokokisa bamposa na bango na ndenge ebongi. Lokola makambo yango mazali na boyokani na losambo ya solo, tosengeli kolanda na esengo nyonso mitinda oyo mipesami. Tómonisa ete tozali sembo na oyo ezali moke mpenza, boye tokozwa matomba mingi oyo mazali kozela baoyo Yehova alingaka.—Luka 16:10.
8 Tozali kolendisa bino ete bozwa bibongiseli uta sikawa mpo na koyangana mikolo misato na liyangani ya etúká mpo na mobu 1999 oyo ezali na motó ya likambo ete “Liloba ya esakweli ya Nzambe.” Lokola bino, biso mpe tozali kozela na motema likoló koyoka basambeli nyonso ya Nzambe “konganga na esengo.” (Nz. 42:4) Tiká ete Yehova apambola bibongiseli nyonso oyo ezali kosalema mpo na matomba na biso na elimo!
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ:
9:30 ya ntɔngɔ kino 5:00 ya mpokwa
Mokolo ya lomingo:
9:30 ya ntɔngɔ kino 4:00 ya mpokwa
[Etanda na lokasa 5]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani “Liloba ya esakweli ya Nzambe”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16; Mas. 3:9.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu kati na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Petelo 1:15, 16.