“Lolenge ya bomoi oyo Nzambe andimaka”—Liyangani ya Etúká na 1998
1 Mbula na mbula, na mokili mobimba, basambeli ya Yehova basepelaka kokutana ebele mpo na mayangani na bango ya etúká. Bazali bongo komonisa lolenge ya bomoi oyo basaleli ya sembo ya Yehova, oyo bazalaki basangani ya libota ya Yisalaele ya kala, bazalaki na yango. Bango bayembaki na esengo nyonso loyembo oyo ezwami na mokanda ya Nzembo 122 na ntango bazalaki kokende mobembo na Yelusaleme mpo na kosambela Yehova. Tozali kotánga na vɛrsɛ́ 1 ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókɛnda na ndako [ya Yehova].” Mayangani yango mazali mpe komonisa ete maloba mapemami ya Yisaya 2:2, 3 mazali kokokisama.
2 Mbula oyo, tozali na ntina mosusu mpenza ya kosepela mpo ete liyangani na biso ekozala lokola liyangani ya mikili mingi, wana bankóto ya bamonisi oyo bakouta na mikili ndenge na ndenge bakoyangana na bamoko ya mayangani yango oyo ekozala mayangani ya mikili mingi. Bamisionere oyo bakozonga kotala baboti na bango bakoyangana mpe na mwa mayangani yango mingi. Na bongo, na boumeli ya manáka tokoyoka baeksperiansi mpe balapólo oyo ekolobela mosala ya kosakola na mboka ya bopaya.
3 Bandá komibongisa malamumalamu uta sikawa mpo ete okoka koyangana na mikolo misato ya elambo yango kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli kino libondeli ya nsuka. Ntango okokamata bibongiseli mpo na koyangana na liyangani, monisá ete ozali na bolingo na kokanisáká mpe baoyo bazali na mposa ya lisalisi, mingi mpenza baoyo babandi kosepela na solo sika, mpo ete bázala mpe na likoki ya koyangana na biteni nyonso ya liyangani. Ekozala malamu koleka ete otalela mayebisi ya siplemá oyo elongo na bato oyo oyekolaka na bango Biblia, oyo bazali kokana koyangana na liyangani. (Gal. 6:6, 10) Mwamitano mpe Mwapɔ́sɔ, liyangani ekobanda na miziki na ngonga ya 9:30 mpe ekosuka na ngonga ya 17:00. Eteni ya Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ ekobanda na ngonga ya 9:30 mpe liyangani ekosuka na ngonga ya 16:00. Mayebisi oyo malandi makosalisa yo ntango ozali komibongisa.
4 Na ntembe te, bobele masangá oyo mazwami na bitúká epai kuna mayangani ya mikili mingi makosalema nde makobyangama. Ezali mpenza na ntina ete mokomoko atosa ndelo yango mpo ete mayangani nyonso makoka kobongisama na lolenge ya malamu mpenza. Liyangani mokomoko ekomonana lokola liyangani ya mikili mingi mpamba te biteni mosusu ya manáka na yango bikolobela balapólo, mpe lisusu bamisionere bakozala wana.
5 Mingimingi bandeko bapesaka bisika ya kolala. Tosengeli komonisa botɔ́ndi epai na bandeko yango oyo bandimi kopesa biso esika ya kolala. Mpe ekozala malamu te ete baoyo bayambami bongo bálekisa ndelo na kosɛngisáká ete bápesa bango esika ya kolala mikolo mingi mpenza liboso ete liyangani ebanda to bátikala mpe mikolo mingi lisusu na bisika yango ya kolala nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka bobele na BOUMELI ya mikolo oyo liyangani ekosalema. Baoyo bapesameli esika ya kolala basengeli kobatela biloko ya mokóló ndako, kobebisa ata eloko moko te, bákende te na bisika oyo bipesameli bango te, mpe bákeba ete bana na bango básala mpe bongo. Soki baoyo bayambi bandeko bakutani na mokakatano na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa bandeko ya departemá oyo ezali kopesa bato bisika ya kolala, mpe bango bakozala pene ya kosalisa bango.
6 Atako tozali kobika na ‘ntango ya mpasi,’ tozali kolikya ete bandeko mingi bakoyamba baoyo bazali koluka esika ya kolala, lokola yango esili kosalema na Kinshasa to na bisika mosusu, ntango bandeko na biso bakimaki etumba. Ezali likambo ya mawa na koyoka ete na bisika mingi bandeko bazali kosepela te kopesa bisika ya kolala na bandeko oyo bayei na liyangani. Tokolinga mpenza te ete mikakatano ya ntango oyo ekitisa bolingo na biso bamoko epai na bamosusu na kokakatanáká mpo na koyamba bandeko soki tozali na likoki ya kosala yango.—Mat. 24:14; Ebe. 13:1, 2; Yoa. 13:35.
7 Basakoli mosusu, mpe bana na bango, bazali mpenzampenza na bosɛnga; esengeli na biso ete tómonisela bango boboto. Lisangá mobimba, mpe mingi mpenza bankulutu, basengeli komibanzabanza mpo na bato yango kasi kotika mokumba na bango na departemá oyo ezali kopesa bato bisika ya kolala na liyangani te. Bankulutu to basangani mosusu ya lisangá oyo bayebi to bayoki mokakatano ya bandeko yango bakoki komonisa bolingo na kopesáká bango lisalisi oyo bazali na yango mposa. Mingi mpenza yango ezali kosɛnga ete basakoli bamibanzabanza mpo na bamposa ya basaleli ya ntango nyonso, ya mibange to ya bibɔsɔnɔ, mpe bongo na bongo. Na ndakisa, bakoki kosalisa bango na komɛmáká bango na esika ya liyangani to na kosungáká bango na mitindo mingi.—Yak. 2:15-17; 1 Yoa. 3:17, 18.
8 Baoyo bakoyangana na esika mosusu: Mbala mingi, liyangani epai obyangami ezali oyo ekosalema pene mpenza na esika oyo ofandaka. Nzokande, soki mpo na likambo moko ya ntina osengeli koyangana na esika mosusu, ozali na bonsomi ya kosala yango.
9 Kosalana elongo ezali mpenza na ntina: Departemá oyo ezali kopesa bato bisika ya kolala ekotambwisama malamu mpe ekosala mpenza mosala na yango soki mokomoko atosi malako na yango. (Ebe. 13:17) Yango wana tozali kosɛnga na moto nyonso ete asalana na boyokani na departemá oyo ezali kopesa bato bisika ya kolala oyo ebongisami na la Société. Na bongo, tokosilisa mikakatano mingi mpenza oyo tokutanaka na yango.
10 Wana tozali komibongisa elongo na bandeko na biso mpo na koyangana na mayangani ya etúká na 1998, oyo ezali na motó na likambo ete “Lolenge ya bomoi oyo Nzambe andimaka,” tiká ete tókanisa mpe bisaleli ya mosala mpe mosolo oyo tokoki kopesa mpo na kobongisama ya elambo yango ya elimo! Lokola Bayisalaele mpe baklisto ya ekeke ya liboso, tókende mabɔkɔ mpamba te.—Det. 16:16, 17; 2 Kol. 8:12.
[Etanda na lokasa 4]
MAYANGANI YA ETÚKÁ NA 1998-1999
3-5 YULÍ
KINSHASA (F): KIN-4; KIN-7; KIN-10.
10-12 YULÍ
BANDUNDU (LI): B-1; B-10.
BUMBA (LI): E-4; E-12; E-15; E-20; E-22; O-3; ndambo ya O-10; O-15.
GOMA (F; SW): KI-2; KI-6; KI-14.
KINSHASA (LI-1): KIN-1; KIN-3; KIN-8; KIN-12; KIN-13; ndambo ya BC-3.
LUBUMBASHI (F; SW): ndambo ya K-1; K-2; K-13.
TSHIKAPA (F; SH): KA-6; KA-22; KA-23; KA-31.
17-19 YULÍ
BUKAVU (F; SW): KI-1; KI-11; KI-12.
GBADOLITE (LI): E-5; E-9; E-19.
KANANGA (F; SH): KA-1; KA-9; KA-14; KA-18; KA-19; KA-28; KA-30.
KINSHASA(LI-2): KIN-2; KIN-5; KIN-6; KIN-9; KIN-11.
LIKASI (F; SW): ndambo ya K-1; K-17; K-20; K-23.
NIOKI (LI): B-4; B-6; B-14; B-15.
24-26 YULÍ
BUNIA (SW): O-4; O-12.
GEMENA (LI): E-1; E-14.
ILEBO (LI; SH): KA-10; KA-15; ndambo ya KA-21; KA-29.
KISANGANI (LI): ndambo ya O-1; O-7; ndambo ya O-8; ndambo ya O-10; ndambo ya O-14.
KOLWEZI (F; SW): ndambo ya K-1; K-3; ndambo ya K-5.
UVIRA (SW): KI-8; ndambo ya BU-1.
31 YULÍ-2 AUGÚSTO
BENI (SW): KI-5; KI-10.
BRAZZAVILLE (F; MK): CO-1; CO-5; ndambo ya CO-3; ndambo ya CO-7; ndambo ya CO-8.
BUJUMBURA (RU): ndambo ya BU-1; BU-2; BU-3.
KISANGANI (F; SW): ndambo ya O-1; O-5; O-9; ndambo ya O-14; O-16.
LISALA (LI): E-8; E-11; E-18; E-21.
MATADI (LI): BC-1; BC-5.
SANDOA (DR): ndambo ya K-5; K-21.
7-9 AUGÚSTO
BUTEMBO (SW): KI-7; KI-9.
ISIRO (LI): O-2; ndambo ya O-17; O-18.
KIMPESE (LI): BC-2; ndambo ya BC-3; BC-4; ndambo ya BC-6; BC-7; BC-8.
MBANDAKA (LI): E-2; E-7; E-16; E-17; E-23.
MBUJI-MAYI (F; SH): KA-2; KA-8; KA-16; KA-17; KA-20; ndambo ya KA-25.
POINTE-NOIRE (F; MK): CO-2; CO-6; ndambo ya CO-8.
14-16 AUGÚSTO
BUTA (LI): ndambo ya O-8; O-11.
DUNGU (LI): O-6; O-13; ndambo ya O-17.
KABINDA (F; SH): KA-5; KA-13; ndambo ya KA-32.
KINDU (SW): KI-3; KI-13.
MANONO (KU): ndambo ya K-10; K-14; ndambo ya K-16.
POPOKABAKA (LI): ndambo ya BC-6; B-7; ndambo ya B-13; ndambo ya B-21.
21-23 AUGÚSTO
BOENDE (LI): E-3; E-6; ndambo ya E-13; E-24.
KONGOLO (SW): KI-4; K-22.
LODJA (OT): KA-4; KA-11; KA-12; ndambo ya KA-26; KA-27; ndambo ya KA-32.
MULONGO (KU): ndambo ya K-8; ndambo ya K-10; ndambo ya K-16.
MWENE DITU (F; SH): KA-3; KA-24; ndambo ya KA-25.
OUESSO (F): ndambo ya CO-3; ndambo ya CO-7.
TEMBO (LI): B-17; ndambo ya B-13.
28-30 AUGÚSTO
BOKUNGU (LI): E-10; ndambo ya E-13.
KALEMIE (SW): ndambo ya K-12; K-18; K-19.
KAMINA (KU; SW): ndambo ya K-4; ndambo ya K-6; K-7; K-15.
KENGE (MK): B-3; B-9; ndambo ya B-21.
KINKONDJA (KU): ndambo ya K-8; K-9; ndambo ya K-10; ndambo ya K-16.
KOLE (OT): KA-7; ndambo ya KA-21; ndambo ya KA-26.
4-6 SƐTƐ́MBƐ
KABONGO (KU): ndambo ya K-4; ndambo ya K-6; K-24.
KIKWIT (F; MK): B-2; ndambo ya B-19; B-24.
KIRUNGU/MOBA (SW): ndambo ya K-12; ndambo ya K-19.
11-13 SƐTƐ́MBƐ
BULUNGU (MK): B-5; ndambo ya B-19; B-20.
PEPA (SW): K-11; K-25.
18-20 SƐTƐ́MBƐ
IDIOFA (MK): B-8; B-16.
2-4 ƆKƆTƆ́BƐ
MUKEDI (MK): ndambo ya B-18; B-23.
9-11 ƆKƆTƆ́BƐ
GUNGU (MK): B-11; B-12.