Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/01 lok. 8
  • Bolingo nde etindaka biso tósakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo nde etindaka biso tósakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”
    “Yaká, landá ngai”
  • “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mosala na biso ya kosakola: Elakiseli ya bolingo ya solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mosala ya kosakola: libaku moko kitoko mpe lokumu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 3/01 lok. 8

Bolingo nde etindaka biso tósakola

1 Bato bayebi ete biso Batatoli ya Yehova tosakolaka nsango ya Bokonzi na molende mpenza. (Mat. 24:14) Bato koleka milio motoba bazali kosakola na molende na mokili mobimba; bato ya sika bazali kobakisama ntango bazali kosangana na biso mpo tósakola elongo. Motango wana mobimba ezali nde motango ya bato oyo basalaka mosala yango ya kosakola.

2 Nini ezali kotinda biso tómipesa na bolingo na biso moko na mosala makasi wana? Batindikaka biso na makasi te, balɛngolaka biso mpe te na biloko ya mosuni, mpe tozali kozwa lokumu moko ya sipesiale te. Na ebandeli, mingi kati na biso balɛmbaki mpamba te bazalaki komiyoka ete bakoki te, mpe mpo bato bazalaki koyoka bango te. (Mat. 24:9) Bato mingi oyo bamonaka biso bayebaka te eloko nini mpenza etindaka biso tósakolaka. Tosengeli solo kozala mpenza na ntina moko oyo etindaka biso tólendendela.

3 Bolingo nde ezali kotinda biso: Yesu amonisaki mobeko oyo eleki monene ntango alobaki ete ‘tosengeli kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso mpe na nguya na biso nyonso.’ (Mko. 12:30) Bolingo na biso mpo na Yehova esimbami na botɔndi makasi oyo tozali na yango mpo na etɛlɛmɛlo na ye mpe mpo na misala na ye​—Mokonzi Monene, Mozalisi ya biloko nyonso, ye oyo ‘abongi kozwa nkembo, lokumu, mpe nguya.’ (Emon. 4:11) Eloko moko te ekokani na bizaleli na ye ya kokamwa.​—Ex. 34:6, 7.

4 Koyeba Yehova mpe kolinga ye ezali kotinda biso tóngɛngisa pole na biso liboso ya bato. (Mat. 5:16) Pole na biso engɛngaka ntango tozali kokumisa ye liboso ya bato nyonso, ntango tozali koloba mpo na misala na ye ya kokamwa, mpe ntango tozali kopalanganisa nsango ya Bokonzi na ye. Ndenge moko na anzelu oyo azali kopumbwa na katikati ya likoló, tozali na “nsango malamu ya seko mpo na kosakola yango lokola nsango ya esengo . . . na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso mpe na bato nyonso.” (Emon. 14:6, NW ) Bolingo na biso nde ezali nguya oyo ezali kotinda biso tósakola na mokili mobimba.

5 Mokili etalelaka mosala na biso ya kosakola lokola “bozoba” oyo basengeli kotyela yango likebi te. (1 Kol. 1:18) Bato basali makasi na mokili mobimba mpo na kopekisa mosala na biso. Bolingo na biso ya sembo ezali kolendisa biso na koloba ndenge bantoma balobaki ete: “Tokoki kotika koloba te makambo oyo tomonaki mpe toyokaki. . . . Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi kasi bato te.” (Mis. 4:20, NW; Mis. 5:29, NW ) Mosala ya kosakola ezali kokoba kopalangana na bisika nyonso na mokili atako minyoko ezali.

6 Bolingo na biso mpo na Yehova ezali lokola mɔ́tɔ oyo ezali kotinda biso tósakola lokumu ya bizaleli malamu na ye bisika nyonso. (Yil. 20:9; 1 Pet. 2:9) Tokolanda ‘koyebisa misala na ye kati na mabota . . . zambi asali misala na nkembo’!​—Yis. 12:4, 5.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto