Mosala ya kosakola: libaku moko kitoko mpe lokumu
1 Mosala ya kosakola nsango malamu ezali libaku moko kitoko mpe lokumu oyo Yehova azali kopesa biso. (Lom. 15:16; 1 Tim. 1:12) Ezali bongo nde totalelaka yango? Ezala ntango oyo ezali koleka, ezala botyoli ya bazalani na biso, yango esengeli te kokitisa motuya na yango na miso na biso. Bobele motángo moke ya bato nde bazali na lokumu ya kolata nkombo ya Nzambe. Ndenge nini kopesa motuya mingi na libaku kitoko yango?
2 Mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi esalaka ete tóndimama na mokili te. Bato mingi batalelaka misala na biso na bopɔtu mpe batyolaka yango. Basusu basɛkaka yango mpe batɛmɛlaka yango. Bitɛmɛli yango ekoki kouta na baninga na biso ya mosala, na bato bafandi pembeni na biso to ata na basangani ya libota na biso. Tomonanaka bilema to bazoba na miso ya basusu. (Yoane 15:19; 1 Kol. 1:18, 21; 2 Tim. 3:12) Maloba na bango ya kolɛmbisa mazali bobele mpo na kobebisa molende na biso mpe koyeisa biso malili to kopusa biso ete tótika libaku kitoko oyo tozali na yango. Satana azali mobandisi ya elimo wana mabe, mpamba te “azimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima ete bámona pole na nsango malamu na nkembo na Klisto te.” (2 Kol. 4:4) Tosalaka ndenge nini?
3 Ezali na ntina koyeba ete mosala ya kosakola Bokonzi ezali mosala moleki ntina oyo tokoki kosangana na yango lelo. Tozali kosakola nsango ya lobiko oyo bato bakoki koyoka yango na mwango mosusu te. (Lom. 10:13-15) Likambo ya ntina, ezali kondimama na Nzambe, kasi na bato te. Makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango mpo na mosala na biso ya kosakola ekopekisa biso te kolobela nsango malamu na molende nyonso.—Misala 4:29.
4 Yesu apesaki motuya monene na libaku kitoko azalaki na yango ya kosakola mokano ya Tata na ye. (Yoane 4:34) Amipesaki mobimba na mosala na ye mpe apesaki nzela te na makambo mosusu ya mpambampamba to na batɛmɛli ete bákangisa ye nzela. Mosala ya kosakola nsango ya bokonzi ezalaki ntango nyonso na esika ya Liboso kati na bomoi na ye. (Luka 4:43) Tosengeli komekola ye, yango ezali etindá. (1 Petelo 2:21) Kosaláká bongo, tozali kokóma “basalani elongo na Nzambe.” (1 Kol. 3:9) Tomonisaka ete topesaka mpenza motuya na libaku kitoko yango? Tolukaka mabaku ya koyebisa nsango malamu epai na bazalani na biso na lolenge ya komibongisa to ya libaku malamu? Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli kozala ntango nyonso pene na ‘koyambola mpo na nkombo na ye.’—Ebe. 13:15.
5 Ezaleli na biso emonisamaka na bosangani na biso na mosala ya kosakola. Tozalaka mpenza na botɔ́ndi epai ya Yehova mpo na nyonso oyo azali kosala mpo na bolamu na biso? Tolónaka kati na mitema na biso bolingo ya Yehova, oyo ekopusa biso na kosala oyo ekoki na biso kati na mosala na ye? Soki tokomanyola likolo na mapamboli oyo Yehova alaki biso mpo na mikolo mizali koya, tokozala na bolingo makasi mpo na Mozalisi na biso. Bolingo motindo wana ekopusa biso, engebene makoki na biso na kosala eloko, na kolendendela mpe na kosakola Bokonzi sanza na sanza. Molende na biso ekomonisa bolingo oyo tozali na yango mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na biso.—Malako 12:30, 31.
6 Tomonisaka motuya oyo topesaka na eloko moko na lolenge tosalelaka yango. Tomonisaka mpenza motuya na libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosakola Bokonzi? Tokumisaka mosala na biso? Tozwi ekateli ya kolendendela na mosala yango ya ntina atako botɛmɛli ezali? Soki tokolinga libaku kitoko yango mingi, na ntembe te tokozala na molende mpe motema na biso ekozala mobimba mpo na mosala yango.—2 Kol. 4:1, 7.