Makanisi na biso nsima ya kotala kasɛti video La Bible : une force dans votre vie
Ntango ozali koyanola na mituna oyo, monisá makanisi na yo ya solosolo mpo na nsango oyo ezali na kati ya kasɛti video oyo. (1a) Nini elendisaki bato mingi bábongola bomoi na bango ekoma malamu? (Ebe. 4:12) (1b) Moto asengeli kosala nini mpo na kozwa nguya yango mpe kosalela yango na bomoi na ye? (2) Mikapo nini ya Biblia balobeli mpo na kosalisa mwasi na mobali na kati ya libala (a) bábongisa lolenge na bango ya kosolola mpe (b) basilikaka mpambampamba te? (3) Ndenge nini lolenge oyo baklisto batalelaka libala ebongisaka bomoi ya libota? (Ef. 5:28, 29) (4) Ndakisa nini ya malamu Yehova Nzambe apesi na oyo etali kopesa bana makambo misato oyo bango nyonso basepelaka na yango mpe oyo basengeli mpenza na yango, mpe ndenge nini baboti bakoki kosala mpe bongo lelo oyo? (Mko. 1:9-11) (5) Mpo na nini baboti basengeli bango moko koteya bana na bango Biblia, mpe nini emonisi ete basengeli kosala yango ntango nyonso? (Det. 6:6, 7) (6) Ndenge nini baboti bakoki kosala mpo moto nyonso asepela na boyekoli ya libota? (7) Longolá koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa baboti basala lisusu nini mpo na bana na bango? (8) Ndenge nini toli ya Biblia esalisaka mabota na makambo ya mbongo? (9) Wapi mateya ya Makomami oyo, soki bato basaleli yango, ekosalisa bango bázwa maladi mpambampamba te? (10) Ndenge nini mateya ya Liloba ya Nzambe esali ete bomoi na yo ebongwana? (11) Makambo oyo ezali na kasɛti video oyo ekoki mpenza kosalisa moto oyo okei kotala na mosala ya kosakola andima koyekola Biblia?