Mapamboli oyo eutaka na komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova—Eteni 1
1 Ntoma Yoane akomaki boye: “Biso tokolingaka mpo ete [Yehova] alingaki biso liboso.” (1 Yoa. 4:19) Soki tokanisi makambo nyonso oyo Yehova asaleli biso, yango ekotinda biso tózongisela ye mpenza botɔndi. Yesu apesaki biso ndakisa mpo na likambo yango, azalaki kopesa litatoli mpo na nkombo ya Nzambe mpe mpo na Bokonzi na ye na botosi mpenza. (Yoa. 14:31) Ekozala malamu tótalela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na bolingo ya Yehova mpe mapamboli oyo tokoki kozwa soki tosali bongo.
2 Kosakola ndako na ndako: Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kosala mosala ya kosakola Bokonzi. Malako oyo apesaki bango emonisi polele ete bakendaki ndako na ndako mpo na kopalanganisa nsango malamu. (Luka 9:1-6; 10:1-7) Esɛngaka mpenza kolinga Nzambe mpe bazalani mpo na kolɛmba te kokende ndako na ndako na ntango oyo tozali kokutana na bato oyo bazali kosepela na nsango na biso te to bazali kotɛmɛla biso. Kasi, ntango tozali kokende ndako na ndako biso moko mpe tozwelaka yango litomba, mpamba te kondima na biso ekómaka makasi mpe elikya na biso elendisamaka.
3 Lokola totambwisamaka na baanzelu na mosala yango, tozali kokutana na bato mingi oyo bazali na nzala mpe na mposa ya solo. (Emon. 14:6) Ezali na bato mosusu oyo balobaki ete ntango Motatoli moko ayaki na ndako na bango, bazalaki kobondela mpo na kozwa lisungi. Bandeko basi mibale na mwana moko ya moke bazalaki kosakola ndako na ndako na esanga moko ya Antilles. Ntango bandeko basi wana mibale balobaki ete básukisa wana mpo na mokolo yango, mwana akendaki ye moko tii na ndako oyo elandaki mpe abɛtaki porte. Elenge mwasi moko afungolaki ndako. Ntango bandeko basi wana mibale bamonaki bongo, bapusanaki mpe basololaki na elenge mwasi yango. Asɛngaki bango ete bákɔta na ndako mpe ayebisaki bango ete na ntango wana kaka azalaki kobondela Nzambe atinda Batatoli na ye mpo báteya ye Biblia!
4 Kopesa litatoli na balabala: Lokola ezali mpasi na bisika mosusu mpo na kokuta bato na bandako na bango, yango wana kopesa litatoli na balabala ezali ndenge ya malamu ya kokutana na bango. Lisusu, bato mingi bafandaka na mapango oyo ezali mpasi mpo na kokɔta to na babuludingi oyo ebatelami makasi, epai ezali mpasi mpo na kosakola ndako na ndako. Kasi botɔndi na biso mpo na bolingo ya Yehova ekotinda biso tósalela banzela nyonso oyo tokoki kozala na yango, moko na yango ezali kopesa litatoli na balabala, mpo na kokutana na bato mpe koyebisa bango nsango ya Bokonzi.—Mas. 1:20, 21.
5 Kosala bozongeli ya sika: Lokola tozali koluka baoyo “bayebi bobola na bango ya elimo,” tosengeli kosala nyonso oyo ezali na likoki na biso mpo na kokokisa mposa yango. (Mat. 5:3, NW) Yango esɛngaka ete tózonga kosopa mai na mboto ya solo oyo tolonaki. (1 Kol. 3:6-8) Ndeko mwasi moko na Australie apesaki trakte epai ya mwasi moko oyo amonanaki ete azalaki mpenza kosepela te. Atako bongo, ndeko mwasi asalaki nyonso mpo na kokutana lisusu na mwasi yango na ndako na ye. Ntango akutanaki na ye, ndeko mwasi akutaki ye asilá kosomba Biblia moko ya ntalo mingi. Ndeko mwasi abandaki koyekola na ye!
6 Kotambwisa boyekoli ya Biblia: Yango ezali lolenge moko ya mosala na biso ya kosakola oyo ekoki kopesa esengo mpe mbano mingi mpenza. Ezali mpenza lipamboli kosalisa bato báyeba Yehova, komona ndenge bazali kosala mbongwana na bomoi na bango mpo na kosepelisa ye, mpe na nsima komonisa na nzela ya batisimo na bango ya boklisto ete bamipesi na Nzambe!—1 Tes. 2:20; 3 Yoa. 4.
7 Na eteni oyo ekolanda, tokotalela mapamboli mosusu oyo tokoki kozwa soki tozali komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova.