“Basakoli ya Bokonzi ya molende”: Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2002
1 “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako ya [Yehova].” (Nz. 122:1) Soki totaleli maloba wana ya mokomi na nzembo, tokomona makambo oyo: (1) ndenge ayokaki ntango babengaki ye akende kosambela Yehova, (2) baninga malamu oyo azalaki na bango esika moko kuna, baoyo bazalaki mpe kosepela mingi na losambo ya solo, mpe (3) bibongiseli oyo esengelaki kozwa mpo na kobengisa bato mosusu, mpo na koyangana esika moko, mpe mpo na kosala mobembo tii na ndako ya Nzambe.
2 Biso mpe tomiyokaka lokola mokomi na nzembo ntango toyokaka ete bazali kobongisa liyangani ya etúká, boye te? Soki tokanisi esengo oyo tozwaki na mayangani oyo euti koleka mpe ndenge tokokutana lisusu na liyangani wana na baninga na biso oyo balingaka Yehova, mposa na biso ekómaka ete liyangani yango esalema ata lobi. Bibongiseli esili kozwama mpo ete, na teritware mobimba ya filiale ya Congo, liyangani ya etúká ya mikolo misato, oyo motó ya likambo na yango ezali “Basakoli ya Bokonzi ya molende” esalema na mobu 2002. Sikoyo ezali ntango ya komibongisa mpo na koyangana mpe kozwa matomba mingi na fɛti wana ya elimo oyo ezali kozela biso.
3 “Kapita ya sembo mpe ya mayele” asili kobanda kobongisa bilei ya elimo oyo ekopesama na ntango ebongi na liyangani ya etúká. (Luka 12:42) Lisangá mokomoko ekoyangana na liyangani epai bakotinda yango mpo ete bato báleka mingi te. Lisusu, bandeko mingi basili kobanda kobongisa badepartema ndenge na ndenge mpo “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Kol. 14:40, NW) Lokola makambo mingi esili kobongisama mpo na bolamu na biso, boye mokomoko na biso akoki kosala nini mpo na komibongisa ye moko mpo na liyangani?
4 Bandá komibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso misato: Osengeli kosɛnga konje epai ya patrɔ na yo mpo na koyangana na liyangani mobimba epai lisangá na yo ekokende? Yehova ayebi ete bapatrɔ mosusu “bazalaka matata.” (1 Pet. 2: 18, NW) Kasi mayangani na biso ezali na ntina mingi, yango wana tosengeli kosala milende mpo tózala wana mpo na kolanda programɛ mobimba. Bondelá Yehova mpo na makambo yango, sɛngá litambwisi na ye mpo makambo etambola malamu.—Neh. 2:4.
5 Bisika ya kolala: Na momeseno, bapaya bayambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai ya bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete báfanda mikolo mingi epai ya bandeko oyo bayambi bango, ezala liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka kaka na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama epai ya bandeko, basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango, basengeli kobebisa eloko moko te, bakokende te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na Departema ya boyambi bapaya, yango ekoluka ndenge ya kopesa lisungi. Mpo Departema ya boyambi bapaya esala mosala na yango na molɔngɔ mpe malamu, esengeli bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Toyokaka ete bandeko mosusu bazali kotika bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokende na esika mosusu epai oyo moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na Departema ya boyambi bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bólanda malako oyo bandeko ya departema yango bakopesa bino.
6 Ntembe ezali te ete Yehova asungaka biso na misala oyo esalemaka mpo na mayangani ya mbula na mbula. Lokola bandeko mingi oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokende na liyangani ya etúká bazalaka na mposa ya kozwa bisika ya kolala, tokoki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango na ndenge ebongi. Lokola makambo yango ezali na boyokani na losambo ya solo, tosengeli kolanda na esengo nyonso mitinda oyo mipesami. Tómonisa ete tozali sembo na oyo ezali moke mpenza, boye tokozwa matomba mingi oyo ezali kozela baoyo Yehova alingaka.—Luka 16:10.
7 Talá na lisangá na bino: Soki toyebi ete ezali na ndeko moko na kati ya lisangá oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ te to azali na mbongo te mpe yango ekoki kosala ete akende na liyangani te, tokoki nde ‘kofungwama’ na bolingo na biso te mpo na kosalisa ye? (2 Kol. 6:12,13, NW; Det. 15:7) Na 2 Bakolinti 8:14, Paulo alendisi biso tómonisa ezaleli yango. Mpo na nini te kosɛnga bato motindo yango ete básala mobembo elongo na yo mpo na kokende na liyangani? Soki bazali babongisi-nzela, na ntembe te bazali na makambo mingi ya malamu oyo bakutaná na yango oyo bakoki koyebisa yo na nzela ntango bozali kokende na liyangani. Soki bazali mibange na kati ya lisangá, ntango mosusu bazali na makambo ebele ya kokamwa oyo bakutaná na yango na mosala ya Teokrasi, oyo bayebisá yo naino te. Kozala elongo na bandeko motindo wana ekozala mpenza malamu mpo na yo mpe mpo na libota na yo, boye te? Bakozala mpenza na botɔndi mpo na ezaleli na yo ya kokaba mpe Yehova akopambola yo.—Mas. 28:27; Mat. 10:42.
8 Ata soki bandeko oyo bazali na bosɛnga bazwaka lisungi libosoliboso epai ya bandeko na bango oyo bazali baklisto, bankulutu mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá oyo bayebi bamposa yango bakoki mpe kozwa bibongiseli mpo na kosunga bandeko yango na bolingo nyonso. (1 Tim. 5:4) Soki bandeko oyo bazali na bamposa yango bakomeli Komite ya mosala ya lisangá mpo na kosɛnga esika ya kolala, liboso ete komite yango etinda mikanda yango na Departema ya boyambi bapaya, esengeli naino kotalela bandeko yango mpo na koyeba soki bakokisi masɛngami.
9 Tóndima kozala basali ya bolingo malamu: Na liyangani ya etúká, bandeko mingi bapesaka mabɔkɔ mpo misala ya badepartema ndenge na ndenge etambola malamu. Bandeko oyo basalaka na kati ya esika ya liyangani mpe baoyo basalaka libándá, na bisika ya kotɛlɛmisa mituka, bango nde balakisaka bayangani bisika ya kofanda mpe babatelaka mituka mpe bavelo na biso wana tozali kolanda liyangani. Bandeko oyo basalaka na Departema ya kotya bopɛto, bango nde bazalaka na mokumba ya kobatela lokumu na biso lokola bato ya bopɛto, basalaka nyonso mpo ete esika oyo tosalelaki na boumeli ya mwa mikolo lokola esika na biso ya losambo etikala pɛto koleka ndenge tokutaki yango. Tokoki kopesa lisungi na biso na badepartema yango to na badepartema mosusu oyo ekoki kozala na mposa na biso? Okondima komipesa na motema moko mpo na “kosala elongo” na bandeko na yo?—Sef. 3:9, NW.
10 Bato bamonaka mpenza makambo oyo tosalaka? Na liyangani ya etúká ya mbula eleki, moto moko, oyo atiká koyekola na Batatoli ya Yehova esili koleka mbula 20, azalaki kosala na otɛlɛ. Ayebisaki Batatoli mosusu ete azali sikoyo kokanisa kozongela koyekola Biblia mpe kobandela koyangana na makita. Mpo na nini? Mpo, na boumeli ya mikolo oyo Batatoli balekisaki na otɛlɛ epai ye asalaka, basalelaki ye makambo na boboto mpenza.
11 Mobali moko oyo atɛkaka biloko na otɛlɛ alobaki boye mpo na bandeko na biso: “Na bato nyonso oyo bayaka kofanda na baotɛlɛ na biso, bino nde boleki. Bino boyebaka mpenza kozela mpe bozalaka mpenza na bonkonde.” Maloba motindo wana esengeli mpenza kokumisa Tata na biso ya likoló, wana azali komona ndenge tozali kolanda toli Yesu apesaki ete: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló”!—Mat. 5:16, NW.
12 Tiká tómonisa ezaleli ndenge moko na oyo ya Mokonzi Davidi, ye azalaki na esengo mingi kaka mpo asengelaki kokende na ndako oyo losambo ya Yehova ezalaki kosalema. Mayangani na biso ya etúká ezalaka liziba epai tozwaka bilei ya elimo mpe libaku, oyo ekokani na mosusu te, ya kozala esika moko na baninga na biso ya bolingo. Yango wana, tosɛngi yo na esengo mpenza obanda komibongisa mpo ozala wana mikolo nyonso misato ya liyangani ya etúká ya mbula oyo, oyo ezali na motó ya likambo ete “Basakoli ya Bokonzi ya molende”!
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ - 5:00 na nsima ya nzanga
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ - 4:00 na nsima ya nzanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani “Basakoli ya Bokonzi na molende”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.