Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/02 lok. 4
  • Esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 4/02 lok. 4

Esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka

1 Lokola ozali naino elenge, na ntembe te, osilá kokanisa nini okosala na bomoi na yo. Masese 21:​5, (NW) eyebisi biso ete “moto oyo abongisaka malamumalamu liboso makambo oyo azali kokana kosala, azwaka litomba.” Ekozala mpo na litomba na yo soki okanisi malamumalamu makambo oyo ozali kokana kosala na bomoi na yo. Na ntango ozali kokanisa nini okosala na mikolo ezali koya, kanisá mpe kosala mosala ya ntango nyonso. Mpo na nini?

2 Tuná mikóló mosusu oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela ntango bazalaki naino bilenge, báyebisa yo makanisi na bango. Na ntembe te, bango nyonso bakoyebisa yo kaka likambo moko: “Bambula wana ezali bambula ya malamu mpenza na bomoi na ngai!” Ndeko moko oyo azwaki esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka, banda ntango abandaki mosala yango na bolenge na ye, alobaki boye na nsima: “Ezalaka esengo mingi soki ozongisi makanisi na nsima, na ntango oyo ozalaki naino elenge, mpe omoni ete olandaki mpenza toli ya mayele oyo elobi ete: ‘Kanisá Motongi na yo na mikolo ya bolenge na yo.’ ” (Mos. 12:⁠1) Soki olingi kolanda nzela oyo ekopesa yo esengo ya ndenge wana ntango ozali naino elenge, yo na baboti na yo bosengeli kobongisa likambo yango malamumalamu banda sikoyo.

3 Baboti, bólendisa bana na bino bákɔta na mosala ya ntango nyonso: Lokola Yehova azali Tata ya boboto, azali kolakisa bino nzela oyo bosengeli mpenza kolanda. (Yis. 30:21) Lokola azali kotambwisa bino na bolingo ya ndenge wana, yango ezali ndakisa malamu oyo apesi bino baboti baklisto. Na esika ya kotika bana na bino bápona bango moko nzela oyo bamoni malamu, bóteyaka bango nde na mayele mpenza nzela oyo basengeli kolanda mpo ete bázwa mapamboli ya Yehova. Na nsima, ntango bakokóma mikóló, formasyo oyo bopesaki bango ekosalisa bango na “kokesenisa na mabe na malamu.” (Ebe. 5:​14, NW) Makambo oyo mikóló bakutaná na yango na bomoi na bango esalisá bango báyeba ete basengeli te kotyela bososoli na bango moko motema; mpo banzela na bango etambola malamu, basengeli nde kotyela Yehova motema. (Mas. 3:​5, 6) Soki ezali bongo mpo na mikóló, tokoloba boni mpo na bilenge, oyo bayebi naino makambo ya bomoi mingi te?

4 Baboti, ntango bana na bino balingi kokokisa bambula ya bolenge to ata liboso na yango, bósolola na bango polelepolele mpo na misala oyo bazali kokana kosala na bomoi na bango. Bato oyo bapesaka toli mpo na kelasi nini mwana asengeli kotánga, balakisi mpe baninga na bango ya kelasi, bakomeka kotinda bango bámityela mikano ya mokili, ya koluka kokóma na biloko mingi. Bósalisa bana na bino bápona kotánga bakelasi oyo bakoyekola mosala moko ya mabɔkɔ, oyo ekosalisa bango bákokisaka bamposa na bango, kozanga ete bázongisa matomba ya Bokonzi na nsima. (1 Tim. 6:​6-11) Mbala mingi, mpo moto azala na likoki ya kozwaka mwa mbongo mpo na kokokisa malamu bamposa na ye na ntango abandi mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ekoki kosɛnga ntango mosusu asilisa kaka eteyelo ya ntei (école secondaire) mpe na nsima ayekola mosala moko ya mabɔkɔ na eteyelo moko ya tekiniki to na esika moko ya mosala.

5 Bólendisa bilenge bálona mposa ya koumela naino minzemba. Ata soki na nsima bazwi ekateli ya kobala, bakozala na makoki ya kokokisa mikumba minene oyo libala esɛngaka. (Talá paragrafe 19 ya lisolo “Yo mpe okoki komipesa?” na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2001.) Bópesa bilenge mposa ya kosalela bomoi na bango na ndenge oyo ekosepelisa Yehova, ekomemela basusu litomba, mpe ekopesa bango moko esengo. Bokoki kosala yango soki bozali koloba malamu mpo na mosala ya mobongisi-nzela, libaku ya kokende kosala esika mposa ezali mingi, mpo na mosala ya Betele mpe mosala ya misionɛrɛ.

6 Bilenge, bóluka liboso kosala mosala ya ntango nyonso: Bilenge, ezali na ntina moko te bómitunatunaka soki mosala ya mobongisi-nzela ezalaka ndenge nini. Bokoki naino komeka mosala yango mpo na mwa ntango. Ndenge nini? Soki likoki emonani, ezala na ntango bozali kotánga to na ntango bozwi konje, bósɛngaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na nsima, bokomona ete mosala ya mobongisi-nzela esepelisaka mpenza! Okoki nde komibongisa mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi liboso ete tókóma na nsuka ya sanza ya Augusto?

7 Soki ozali ndeko mobali mpe ozali elenge na kati ya lisangá ya Nzambe, kanisá mpe na mozindo mpenza ndenge nini okoki kokokisa makambo oyo esɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala. (1 Tim. 3:​8-10, 12) Longola yango, luká koyeba soki, na ntango okokokisa bambula oyo esɛngami, okosepela kotondisa formilɛrɛ mpo na kosala na Betele to mpo na kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Mosala ya mobongisi-nzela ekoteya yo makambo mingi; na ndakisa okoyeba kosala likambo na likambo na kolanda programɛ na yo, okoyeba ndenge ya kobongisa makambo na yo moko, ndenge ya kofanda malamu na bato mosusu mpe ndenge ya kokolisa makoki ya kokokisa malamu mikumba na yo. Nyonso wana ekobongisa yo mpo ete na nsima okoka kozwa mikumba minene na lisangá.

8 Mpo na kolonga na mosala ya ntango nyonso, likambo ya ntina yango oyo: kozala na molende mpo na makambo ya elimo. Ntoma Paulo alendisaki ezaleli yango mpe amonisaki matomba oyo yango epesaka, yango wana alobaki ete: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, . . . mpo boyebi ete ezali uta na Yehova nde bokozwa mbano . . . oyo esengeli.” (Kols. 3:​23, 24, NW) Tiká ete Yehova apambola bino, apesa bino esengo na mosala ya ntango nyonso!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto