Kolona mingi ememaka mapamboli mingi
1 Biso nyonso tozali kozela kokokisama ya bilaka minene oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Ata lelo, Yehova azali kosopela biso ebele ya mapamboli oyo ezali kobakisa esengo na bomoi na biso. Kasi, mokomoko na biso akozwela mapamboli yango matomba mingi to te na kotalela milende oyo azali kosala. Ndenge ntoma Paulo akomaki yango, “moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.” (2 Kol. 9:6, NW) Tótalela makambo mibale oyo tokoki kosalela etinda yango.
2 Mosala ya kosakola ya mokomoko na biso: Koyebisa bato mosusu nsango malamu ntango nyonso oyo tozwi likoki ya kopesa litatoli ememaka matomba mingi. (Mas. 3:27, 28) Ebele ya bandeko bazali kolona mingi na ndenge bazali kosala mingi na mosala ya kosakola, na ndakisa ndenge bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Tozali kopesa bango longonya mpo na yango. Nzokande, biso nyonso tokoki kolona mingi soki tozali kosala milende mpo na kozongela bato nyonso oyo basepelaki, mpo na kosalisa bango básepela lisusu mingi, mpe soki ntango nyonso libaku emonani, tozali kosɛnga bato ete bándima tóyekola na bango Biblia. (Lom. 12:11) Soki tozali kosala milende ndenge wana, tokokutana na makambo ya kolendisa mpe tokokóma na esengo mingi na mosala na biso ya kosakola.
3 Kotombola matomba ya Bokonzi: Paulo alobelaki ‘kolona mingi’ na likambo ya kopesa biloko ya mosuni. (2 Kol. 9:6, 7, 11, 13) Lelo oyo, tozali na makambo mingi oyo tokoki kosala, ezala na nzoto na biso to na biloko na biso, mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani. Tokoki mpe na bolingo na biso moko kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotya bopɛto mpe kobongisa bisika yango ya losambo ya solo. Longola yango, tokoki kopesa makabo mpo na kozongisa mbongo oyo lisangá na biso ebimisaka mpe mpo na kotombola mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Lokola mokomoko na biso azali kosala oyo akoki kosala, tozali kosepela mingi mpenza na komona ebele ya mapamboli oyo Yehova azali kosopa likoló ya mosala yango oyo ye moko atindaki!—Mki. 3:10; Luka 6:38.
4 Liloba ya Nzambe elendisi biso ‘tósala makambo ya malamu, tózala bazwi na misala ya malamu, tózala lobɔkɔ pɛtɛɛ, tóyeba kokaba.’ Ntango tozali kolanda toli wana, tozali kozwa mapamboli mingi sikoyo. Longola yango, tozali ‘komibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya [mpe] bomoi ya solosolo’ oyo ezali koya.—1 Tim. 6:18, 19, NW.