Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Aug.
“Mpo na yo, osengeli kozala sembo libosoliboso epai ya nani? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo ezali kolobela mingi kozala sembo epai ya Nzambe ya solo. [Lakisá ye lokasa 5, mpe tángá 2 Samwele 22:26.] Oyebi ete kozala sembo epai ya Nzambe epekisaka bato kosalela bato mosusu makambo oyo ezangi bolingo? Nayebi malamu ete okosepela kotánga likambo yango.”
Lamuká! 22 Aug.
“Omitungisá naino te na komona ete bato bazali kokoka te kopekisa kobebisa mai, mopɛpɛ mpe zamba? [Tiká ye apesa eyano.] Mokakatano yango ebimi libosoliboso mpo na ezaleli ya kobebisa biloko mpambampamba. Yesu ateyaki bayekoli na ye bábebisaka biloko mpambampamba te. [Tángá Yoane 6:12.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge nini kolanda malako ya Biblia ekoki kosalisa bato bátika ezaleli ya kobebisa biloko mpambampamba.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.
“Osilá komona ete na bisika mingi lelo oyo, bato oyo bafandaka esika moko bayebanaka lisusu te ndenge ezalaká kala? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu apesaki lilako moko ya ntina mingi mpo na kofanda malamu na bato oyo bofandi na bango penepene. [Tángá Matai 7:12.] Masolo oyo ezali komonisa ndenge nini tokoki kofanda malamu na bato mpe ezali kolendisa bato mosusu básala mpe bongo.”
Lamuká! 8 Sɛt.
“Bato mingi lelo oyo bayebaka te ndenge nini basengeli kozala na bomoi na bango. [Tángá Mosakoli 9:11.] Esika nini tokoki kozwa toli oyo ebongi mpo kotambwisa bomoi na biso? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mosusu balukaka yango epai ya bato oyo basakolaka makambo oyo ebombami (numérologie). Okoki koyeba makambo ya bomoi na yo na nzela wana? Esika nini okoki koyeba malamumalamu makambo ekoya? Lamuká! oyo ezali kopesa biyano na mituna yango.”