Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Aug.
“Nsima ya kokufela moto, bato mingi bamitunaka nini ekómaka nsima ya liwa. Okanisi ete tokoki mpenza koyeba soki liwa ezali nini? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elimboli oyo Biblia elobi mpo na ndenge moto akómaka soki akufi. Elobeli mpe elaka oyo Nzambe apesi ya kosekwisa bandeko na biso oyo bakufá.” Tángá Yoane 5:28, 29.
Lamuká! 22 Aug.
“Oyebaka ete babengaka turizme kompanyi oyo eleki na bato na mokili mobimba? [Tiká ye apesa eyano.] Ndenge baturiste bakómi mingi ememi matomba, ememi mpe mikakatano. Zulunalo oyo elobeli matomba mpe mikakatano ya turizme ya mikolo na biso. Epesi mpe mwa batoli mpo na bato oyo basalaka mibembo na mboka mopaya.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Sɛt.
“Lelo oyo, bato balobelaka ezaleli ya bosembo kaka na monɔkɔ, kasi bamonisaka yango te. Okanisi te ete elingaki kozala malamu soki bato mingi bazalaki lokola moninga oyo balobeli awa? [Tángá Masese 17:17. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli matomba oyo tokozwa soki tozali sembo na libota na biso mpe epai ya baninga na biso.”
Lamuká! 8 Sɛt.
“Ekoki kozala ete okamwaka ndenge biloko oyo Nzambe akelá esalaka na boyokani kati na yango. [Pesá ndakisa moko kati na oyo batángi na lisolo.] Ezali mawa komona ete bato bayokanaka mpenza te, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ndenge oyo mosika te Nzambe akotya kimya mpe boyokani na mokili oyo.” Tángá Yisaya 11:9.