Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Aug.
“Bato mingi basepelaka koyebana lokola bato malamu. Basusu kutu bamitunaka soki na nsima ya liwa na bango bato bakobanda kokanisa bango na makambo nini. Yo mpe osí okanisá mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Mosakoli 7:1.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela ndenge ya koyebana lokola bato malamu na miso ya bato mpe na miso ya Nzambe.”
Lamuká! 22 Aug.
“Soki moto moko amonelaki yo to ndeko na yo, yango esalaka mpenza mpasi, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo epesi mwa makanisi oyo ebongi na baoyo bazali komonela bango. Ezali mpe kolobela elaka oyo Nzambe apesá ya kosilisa mpo na libela makambo ya ndenge wana.” Tángá Mika 4:4.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.
“Bato mingi bakanisaka ete ebele ya mangomba oyo ezali na mokili ezali kaka banzela ekeseni oyo ememaka kaka na esika moko. Bamosusu bandimaka ete lingomba ya solo ezali kaka moko. Osí omituná mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli lisese moko ya kala oyo ezali kolimbola polele motuna yango.” Lobelá Matai 13:24-30.
Lamuká! 8 Sɛt.
“Midɛlɛ ya sika ya bilamba ezali mpenza kobongola bomoi ya bato mingi lelo oyo. Bato mosusu bamonaka ete bato bazali kotya likebi mingi na bilamba oyo moto alati mpe na ndenge oyo moto yango azali komonana na miso ya bato. Okanisi nini mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano] Lamuká! oyo ezali komonisa ndenge ya kozala na bokatikati na likambo etali midɛlɛ ya bilamba oyo ezali kobima. Tángá Bakolose 3:12.