Salisá mokɛngɛli na bino ya boyekoli ya mokanda ya lisangá
1 Biso nyonso tozwaka matomba mingi na boyekoli ya mokanda ya lisangá. Na sanza oyo eleki, tolobelaki ndenge oyo mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda ya lisangá asengeli kokokisa mokumba na ye. Kasi, ndenge nini tokoki kosalisa ye mpo ete biso nyonso tózwa matomba?
2 Yanganaká pɔsɔ na pɔsɔ: Lokola basalaka ete bituluku ya boyekoli ya mokanda ezala na bato mingi te, ezali na ntina mingi ozalaka wana. Zalá na mokano ya koyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ. Okosunga mpe mokɛngɛli soki ozali kokóma na ntango, mpamba te yango esalisaka ye abanda likita na lolenge oyo ebongi.—1 Kol. 14:40.
3 Biyano oyo elendisaka: Nzela mosusu oyo okoki kosalisa ezali soki obongisaka boyekoli malamu mpe opesaka biyano oyo elendisaka. Mingimingi, biyano ya malamu mpenza ezali oyo elobelaka kaka likanisi moko, mpe yango elendisaka basusu bápesa biyano. Koluka te kolobela makanisi nyonso oyo ezali na paragrafe. Soki likambo moko na buku esimbi motema na yo mpenza, lobelá yango mpo ete ebakisa mwa makanisi na boyekoli.—1 Pet. 4:10.
4 Soki ozali na libaku malamu ya kotánga baparagrafe mpo basangani nyonso bázwela yango litomba, omipesa mpenza mpo na kokokisa mokumba yango. Botángi ya malamu ezalaka na ntina mingi mpo ete boyekoli ezala malamu mpe bato básepela na yango.—1 Tim. 4:13.
5 Mosala ya kosakola na etuluku: Makita mpo na mosala ya kosakola esalemaka na bisika mingi ya boyekoli ya mokanda, mpe soki ozali kotosa bibongiseli yango ekosalisa mokɛngɛli ete atambwisa mosala ya kosakola na lolenge ya malamu. Talelá bibongiseli yango lokola mabaku ya kozala baninga mpenza mpo na bandeko mosusu mpe ya kolendisa bango.
6 Balapolo ya mosala ya kosakola: Kopesa lapolo ya mosala ya kosakola nokinoki na nsuka ya sanza nyonso ezali mpe nzela mosusu oyo okosalisa mokɛngɛli. Soki olingi, okopesa mokɛngɛli lapolo na yo na mabɔkɔ to okokɔtisa yango na kɛsi oyo batyaka balapolo na Ndako ya Bokonzi. Mokomeli akoki kokɔngɔla balapolo nyonso oyo bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda batii na kɛsi yango.
7 Soki ozali kosalisa mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda, akomona yango. Libosoliboso, yebaká ete Yehova akomona ‘elimo oyo ozali komonisa.’—Filp. 4:23.