Lisalisi na ntango oyo ebongi mpenza
1 Lokola ntoma Petelo azalaki komibanzabanza mpo na bandimi mosusu, ntango amonaki ete basengelaki kolendisama, akundolelaki bango makebisi ya ntina mpe alendisaki bango na bolingo. Asɛngaki na ‘baoyo bazwi kondima’ bákoba kokolisa bizaleli ya elimo mpo ete bákóma te “bato oyo bazangi kosala mosala to bato oyo bazangi kobota mbuma na oyo etali boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Pet. 1:1, 5-8) Mokano ya Petelo ezalaki ete asalisa bandeko mpo ete bábatela malamu kobengama mpe koponama oyo bazwaki epai na Yehova, mpo ete ‘akuta bango kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya.’ (2 Pet. 1:10, 11; 3:14) Mpo na mingi kati na bango, ndenge oyo alendisaki bango ezalaki mpenza lisalisi na ntango oyo ebongi mpenza.
2 Lelo oyo, baklisto oyo bazali bakɛngɛli bazali mpe komibanzabanza ndenge wana mpo na basaleli ya Nzambe. Lokola tozali sikoyo kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” basaleli ya Yehova mingi bazali kobunda na ebele ya mikakatano. (2 Tim. 3:1) Mikakatano ya mbongo oyo esilaka te, mikakatano na kati ya libota, to mikakatano ya bango moko esalaka ete bamosusu bámiyokaka lokola Davidi: “Mpo ete makambo mabe mazingeli ngai, motuya mokotángama te; masumu na ngai makuti ngai, kino nayebi kotala lisusu te. Ezali mingi mpenza, koleka nsuki na moto na ngai; motema na ngai enangwi.” (Nz. 40:12) Mitungisi yango ekoki kokóma kilo tii kotinda bango bábosana kokokisa mikumba na bango ya elimo mpe bátika kosangana na mosala ya kosakola. Kasi, atako bazali na mikakatano, ‘babosani malako ya Yehova te.’ (Nz. 119:176) Sikoyo ezali nde ntango oyo ebongi mpenza mpo bankulutu bápesa bato ya ndenge wana lisalisi oyo basengeli na yango mpenza.—Yis. 32:1, 2.
3 Mpo na kokokisa mposa yango, bankulutu balendisami ete básala molende mpenza mpo na kosunga baoyo bazali lisusu kobima na mosala ya kosakola te. Milende ya solosolo mpo na kosala bongo ezali kosalema sikoyo mpe ekokoba tii na sanza ya Marsi. Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basɛngisami bákende kotala bato yango oyo batiká kosakola mpe bápesa bango lisungi na elimo mpo básalisa bango bázongela esengo na bango na misala ya lisangá. Soki esengeli, bakoki kobongisa ete báyekolaka na bango Biblia. Bakoki kosɛnga mpe basakoli mosusu bápesa mabɔkɔ. Soki basɛngi yo lisalisi ya ndenge wana, milende na yo ekobimisa matomba mpenza, mingimingi soki ozali kolendisa na ndenge ya boboto mpe na ndenge oyo ezali komonisa ete oyebi malamu mikakatano ya moto yango.
4 Basakoli nyonso basepelaka ntango mosakoli moko azongeli lisusu misala na ye na lisangá. (Luka 15:6) Milende tozali kosala mpo na kolendisa baoyo batiká kosakola ekozala mpenza “liloba lilobami na ntango malamu.”—Mas. 25:11.