Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Apr.
“Na bambula oyo euti koleka, bato mingi bamoni ete bato bazali lisusu komipesa te na makambo ya elimo. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá Nzembo 119:105.] Makambo ya elimo ekoki kosalisa biso tókima makama mingi na bomoi na biso. Zulunalo oyo ezali komonisa esika oyo okoki komona makambo ya elimo ya solosolo.”
Lamuká! 22 Apr.
“Na mokili oyo makambo ezali kokende mbangumbangu, bato mingi bamitunaka soki bana bazali kokola mbangumbangu. Likambo yango etungisaka mpe yo? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá Mosakoli 3:1, 4.] Esengeli te kotikela bana misala oyo mikóló nde basengeli kosala. Nimero oyo ya Lamuká! ezali kolobela ndenge oyo baboti bakoki kotikela bana na bango ntango ya kokola malamu.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
“Mituna mosusu eleki mayele ya bato. Talá ndakisa oyo. [Tángá Yobo 21:7.] Yo mpe ozalaka na motuna oyo olingaka kotuna Nzambe? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ndenge oyo bato na mokili mobimba bazwi biyano ya malamu na mituna misato ya minene oyo etali bomoi.”
Lamuká! 8 Mai
“Mingi kati na biso toyebi moto moko oyo abɛlaka maladi ya diabete. Oyebi maladi yango malamu? [Lakisá lokasa ya ebandeli ya zulunalo, mpe tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli nini epesaka maladi yango mpe ndenge ya kosalisa yango. Elobeli mpe elikya ya Biblia oyo emonisi ete maladi nyonso ekosila libela.” Mpo na kosukisa, tángá Yisaya 33:24.