Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Apr.
“Bato mosusu bakanisaka ete makambo nyonso oyo ekómelaka bato, ata makama ya minene, ezalaka mokano ya Nzambe. Okanisá naino te likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bayebi libondeli oyo. [Tángá Matai 6:10b.] Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini, mpe ntango nini yango ekokokisama mobimba? Zulunalo oyo ezali kopesa eyano ya Biblia na mituna yango.”
Lamuká! 22 Apr.
“Lelo oyo, bato mosusu bakanisaka ete bazali na elikya te. Yo mpe okanisaka ntango mosusu bongo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baloma 15:4.] Bato mingi bayebaka ntina ya kozala na elikya. Okosepela kotalela na Lamuká! oyo ntina nsambo ya kozala na elikya oyo Makomami epesi.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Mai
“Bakonzi mosusu ya mangomba bamikɔtisi na makambo ya politiki mpo na koluka kobongisa bomoi ya bato. Kasi, yoká oyo Yesu asalaki ntango balingaki kokómisa ye mokonzi. [Tángá Yoane 6:15.] Yesu azalaki kolobela mingi eloko moko oyo ekopesa bato mosusu bolamu ya seko. Zulunalo oyo elobeli eloko yango.”
Lamuká! 8 Mai
“Bato mingi bakutanaka na mikakatano mingi na bisika na bango ya mosala. Bamosusu kutu baninga na bango ya mosala batungisaka bango mingi mpenza. Oyebi ete Biblia ezali na toli oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala soki tokutani na mikakatano ya ndenge wana. [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 15:1.] Zulunalo oyo ezali kolobela makambo oyo tokoki kosala mpo tózala na kimya elongo na baninga mosusu ya mosala.”