Kosakola na mokili oyo ezali ntango nyonso kobongwana
1 Makambo ekoki kobongwana mpenza nokinoki! Lelo to lobi, makambo lokola makama, kokwea ya nkita, yikiyiki na makambo ya politiki, to likambo moko oyo esalemi mpe oyo balobeli mingi na radio mpe na televiziɔ, ekoki kokóma likambo oyo bato mingi bazali kolobela. Nzokande, se ndenge wana likebi ya bato ekoki kobongwana nokinoki na likambo mosusu. (Mis. 17:21; 1 Kol. 7:31) Na mokili oyo ezali ntango nyonso kobongwana, ndenge nini tokoki kosala ete bato bátya likebi na nsango ya Bokonzi oyo tozali kosakolela bango?
2 Tóyeba makambo oyo ezali kotungisa bato: Lolenge moko ya kosimba makanisi ya bato ezali ya kolobela makambo oyo ezali kobima na mokili. Na libaku moko, ntango Yesu azalaki kolendisa bato oyo bazalaki koyoka ye na kotalela malamumalamu boyokani na bango elongo na Nzambe, alobelaki makambo ya nsɔmɔ oyo ebimaki, oyo ezalaki naino na makanisi na bango. (Luka 13:1-5) Ndenge moko mpe, ntango tozali kosakola nsango malamu, ekozala malamu tólobelaka mpe nsango moko oyo balobi na zulunalo to na radio, to likambo moko oyo ebimi na mboka, mpe oyo etali mpenza bato ya teritware na biso. Kasi, ntango tozali kolobela makambo ya ndenge wana, tosengeli kokeba ete tókɔta na makambo ya politiki te to komonisa ete tozali na ngámbo boye to boye ya likambo oyo ezali kokabola bato na mboka na biso.—Yoane 17:16.
3 Ndenge nini koyeba makambo oyo bato bazali kokanisa sikoyo? Lolenge ya malamu koleka ekoki kozala kaka ya kotuna motuna mpe koyoka eyano oyo moto akopesa. (Mat. 12:34) Komibanzabanza na biso mpo na bato ekotinda biso tótya likebi na makanisi ya bato mosusu mpe tótuna mwa mituna mosusu na mayele. Likambo oyo moto abimisi mbala moko ekoki komonisa makanisi ya bato mingi ya esika oyo tozali mpe ekoki kopesa biso libaku ya kopesa litatoli.
4 Tóbongisaka ndenge ya kobanda lisolo: Mpo tómibongisa mpo na mosala ya kosakola na mokili oyo ezali ntango nyonso kobongwana, tokoki kosalela buku Comment raisonner. Makanisi ya ntina oyo emonisi ndenge ya kolobela makambo oyo ezali kobima na mokili na masolo na biso ezali na buku Comment raisonner, na nkasa 9-11, na mitó ya makambo “Crime/Sécurité” mpe “Actualité” to na mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likólo ya Biblia, na nkasa 5-6, na mitó ya makambo “Mabe/Libateli “ mpe “Makambo mazali koleka na mokili.” Tokoki mpe kokuta makanisi mosusu ekokani na yango na Mosala ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2000 na lokasa 8. Ntango ozali kobongisa lolenge oyo okobanda lisolo na yo, salá makasi ete otánga mpe vɛrsɛ moko oyo eyokani malamu na lisolo yango.
5 Wana tozali kotya likebi na makambo oyo ezali kotungisa bato ya teritware na biso, oyo ezali ntango nyonso kobongwana, tosengeli koyokanisaka lisolo na biso na bamposa yango ntango tozali kosakola nsango malamu. Soki tosali bongo, tokolobela bato makambo oyo ezali kosimba mpenza mitema na bango. Na bongo, tokosalisa bato mingi ete báyeba Ye oyo abongwanaka te na bizaleli mpe mitinda na ye.—Yak. 1:17.