Kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu epesaka esengo
1 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye 70 bákende kosakola, ateyaki bango makambo oyo basengelaki koloba, akabolaki bango mibalemibale mpe alakisaki bango bisika oyo basengelaki kokende kosakola. Nyonso wana esalaki ete bázwa esengo na mosala na bango. (Luka 10: 1-17) Ndenge moko mpe lelo oyo, kokutana esika moko mpo na kokende kosakola elongo epesaka basaleli ya Yehova nzela ya koyeba oyo bakosala, ebongisaka bango mpe elendisaka bango mpo na mosala ya kosakola.
2 Bankulutu bapesaka ndakisa: Bankulutu bazali na mokumba moko monene mpo na oyo etali kosalisa basakoli nyonso bábimaka mbala na mbala na mosala ya kosakola. Ezali mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde azwaka bibongiseli etali mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ. Mokɛngɛli mokomoko na boyekoli ya mokanda azali na mokumba ya kobongisa mosala ya kosakola mpo na etuluku na ye, mingimingi na bawikende. Na mabaku oyo lisangá mobimba ekutanaka mpo na kosala likita liboso ya kobima na mosala ya kosakola, na ndakisa na nsima ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mokɛngɛli mokomoko na boyekoli ya mokanda asengeli kokabola basakoli ya etuluku na ye.
3 “Na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ”: Ndeko oyo aponami mpo na kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola asengeli kobanda na ngonga ya malamu mpe kosala yango na boumeli ya miniti 10 to 15. Ezali malamu akabola basakoli ndenge bakobima elongo mpe apesa bango bateritware (soki ye te moto akokabola, bakɛngɛli na boyekoli ya mokanda bakosala yango, ndenge touti kolobela yango) liboso ya kosukisa na libondeli. Yango ekosala ete basakoli básala bitulukubituluku na teritware te, likambo oyo ekoki kobebisa lokumu ya mosala na biso. Yango mpe eyokani na toli oyo ya Paulo: “Tiká makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Kol. 14:40) Basakoli nyonso oyo bayanganaka na likita yango basengeli kosala nyonso mpo likita yango esalemaka malamu. Mpo na yango, basengeli koya na ngonga oyo esengeli, kolanda mpenza makambo ndeko oyo azali kotambwisa likita yango azali kosɛnga mpe kokende mbala moko na teritware na nsuka ya likita yango.
4 Tosangani na bomoko: Kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu epesaka biso libaku ya malamu mpenza ya koyeba bandeko mosusu na lisangá. Atako ezali mabe te koyokana liboso na ndeko moko mpo na kosakola elongo, tokoki mpe kozwa matomba mingi soki toyei na likita mpo na mosala ya kosakola kozanga ete tóyokana liboso na ndeko mosusu. Ekoki kosalema ete bápesa biso ndeko moko oyo toyebi malamu mpenza te, na bongo tokozwa likoki ya ‘kofungwama’ na bolingo na biso.—2 Kol. 6: 11-13.
5 Biso “baninga ya mosala na kati ya solo,” kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu elendisaka mpe etyaka bomoko kati na biso. (3 Yoa. 8) Tiká ete biso nyonso tósakolaka yango na motema na biso mobimba!