Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuli
“Lelo ezali komonana ete bato mingi bakómi se kolinga kozala kaka bango moko. Okanisi ete ezali malamu kosala bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá maloba ya mayele oyo ezali komonisa ntina ya kozala na baninga. [Tángá Mosakoli 4: 9, 10.] Zulunalo oyo elobeli ntina oyo biso nyonso tozali na mposa ya bamosusu mpe ndenge ya kosilisa mokakatano ya kolinga kozala kaka yo moko.”
Lamuká! 22 Yuli
“Bato mingi bazali komitungisa na ndenge mikanda, bafilme mpe bafɔtɔ oyo elakisaka basi mpe mibali oyo bazali bolumbu ekómi mingi. Okanisi ete ezali na ntina tómitungisa mpo na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Toli ya malamu oyo euti na Biblia ekoki kobatela biso. [Tángá Baefese 5:3, 4.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge oyo tokoki komibatela na likama yango oyo ekoki mokemoke kosala biso mabe.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Lapolo moko emonisaki ete, mokolo na mokolo, koleka katikati ya bato ya mokili mobimba babikelaka na mbongo oyo ekoki ata dolare 2 te; oyebaka likambo yango? Okanisi ete likambo moko ekoki kosalema mpo na kosilisa mokakatano yango? [Tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali komonisa eloko oyo ekosilisa bobola mpo na libela, ndenge Biblia emonisi yango.”—Tángá Nzembo 72: 12, 13, 16.
Lamuká! 8 Aug.
“Na bambula oyo euti koleka, mipɛpɛ mpe bambula ya makasi ebimisi makama oyo ebebisi biloko mingi na mokili mobimba. Mpo na yo, nini ekoki kosalema mpo na kolɛmbisa mpasi oyo makama yango ezali kobimisa? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge mipɛpɛ, bambula mpe moi ya mikolo oyo ekeseni mpenza na ndenge ezalaká kala; elobeli mpe makanisi oyo ezali na Biblia oyo emonisi ndenge likambo yango ekosila.”—Tángá Yisaya 35:1.