Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuli
“Liwa ya moto oyo tolingaka epesaka mawa mingi. Okanisi ete moto azalaka na eloko moko oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu apesaki elaka oyo ya kolendisa. [Tángá Yoane 5:28, 29.] Yesu alobaki ete lisekwa ‘ezali koya.’ Yango wana, na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo elimboli esika oyo bakufi bazali sikoyo.”
Lamuká! Yuli
“Bato mingi basalaka nyonso oyo ekoki mpo bázala na bomoi ya malamu mpe bamonaka ete ezali na ntina kozala moto malamu. Yo mpe okanisaka ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano.] Talá likama oyo ekoyela biso soki ndenge na biso ya kotalela mabe ná malamu ekeseni na oyo ya Nzambe. [Tángá Masese 14:12.] Lisolo oyo emonisi oyo elimboli kozala moto malamu na miso ya Nzambe.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Nalingi koyeba likanisi na yo na likambo moko oyo Yesu alobaki. [Tángá Matai 5:3.] Okanisi ete makambo ya elimo ekoki kopesa moto bolamu? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na makambo ya solosolo ya elimo mpe ndenge oyo tokoki koyeba yango.”
Lamuká! Aug.
“Okanisi ete epai wapi baboti bakoki kozwa toli oyo ekosalisa bango mpenza? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo Biblia epesi. [Tángá 2 Timote 3:16.] Zulunalo oyo emonisi ete Biblia ezali na toli oyo ebongi mpenza, oyo ekoki kosalisa baboti bábɔkɔla bana na ndenge oyo ekosalisa bango bázala na esengo.”