Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Yuli
“Banda bankóto ya bambula oyo eleká tii lelo, bato bateyá mateya ndenge na ndenge ya losambo. Okanisi ete tokoki mpenza koyeba mateya nini ezali ya solo mpe oyo ezali ya lokuta? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli epai oyo okoki kozwa mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe.” Tángá 2 Timote 3:16.
Lamuká! 22 Yuli
“Ezali mawa mpenza na komona ndenge bato bazali konyokwama na makama lokola mpela, koningana ya mabelé mpe mipɛpɛ makasi. [Lobelá likama moko oyo esalemaki, oyo eyebani na teritware na bino.] Okanisi ete makama ya ndenge wana ekokoba konyokola bato? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kotalela motuna yango. Ezali mpe kobɔndisa baoyo bakufelaki bato na makama ya ndenge wana.” Tángá Yoane 5:28, 29.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Aug.
“Bato mingi bamiyokaka lokola bazali na ntina te. Okanisi ete esengeli kosala nini mpo na kosalisa bango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge Biblia ekoki kosalisa bato oyo bamiyokaka ete bazali na ntina te mpo bázala na esengo ya solosolo.” Limbolá bavɛrsɛ oyo batɛngisi maloba na yango, oyo ezali na makomi ya moindo na lisolo “Biblia ekoki kosalisa yo okóma na esengo.”
Lamuká! 8 Aug.
“Bato mingi bazalaka ntango nyonso kobangabanga. Mpo na yo, mpo na nini bato yango babangaka ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kopesa makanisi ebongi mpo tómibatela na makama oyo ekómelaka bato mingi. Ezali mpe kolobela elaka oyo ezali na Biblia ya mokili oyo bato bakobanga lisusu te. Tángá Yisaya 11:9.