Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Aug.
“Lelo oyo, bato balukaka toli epai na epai na makambo ya libala mpe kobokɔla bana. Okanisi ete epai wapi bato bakoki kozwa toli ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela toli ya bwanya oyo Mozalisi ya bato azali kopesa mpo na makambo etali libota.” Tángá Nzembo 32:8.
Lamuká! 22 Aug.
“Okanisi ete batata bazali na ntina mpenza na bomoi ya bana na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo ezali komonisa ete batata mingi bazali komonana lisusu mpenza na ndako te. Ezali mpe kolimbola nini batata bakoki kosala mpo bana na bango bákola malamu.” Tángá Masese 13:1.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Sɛt.
“Biso nyonso tolingaka kozala na esengo. Okanisi ete makambo oyo balobeli awa ekoki mpenza kopesa moto esengo? [Tángá Matai 5:4a, 6a, 10a. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolimbola maloba yango ya Lisolo likoló ya Ngomba, lisolo oyo eyebani mingi, mpe ezali kolobela makambo mosusu oyo esalaka ete moto azala na esengo.”
Lamuká! 8 Sɛt.
“Balobaka ete moto moko kati na bato minei akobɛla maladi ya motó na bomoi na ye. Mingi na biso toyebi moto moko oyo azali kobɛla maladi yango. [Fungolá lisolo yango.] Lisolo oyo ezali kopesa makanisi oyo ekoki kosalisa biso na koyeba oyo tokoki kosala soki moto oyo tolingaka azali kobɛla maladi yango.”