Sanzolá Yehova na kati ya koyangana monene
1, 2. Libaku nini liyangani ya etúká epesaka biso, mpe wapi balolenge oyo tokoki kosala yango?
1 Mbula na mbula, mayangani na biso ya etúká epesaka biso libaku malamu ya kopesa Yehova nkembo. Toyokaka lokola Davidi oyo ayembaki: “Nakotɔnda yo kati na koyangana monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” (Nz. 35:18) Na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe” oyo tozali kozela, ndenge nini biso oyo tozali libota ya bomoko tokoki mpenza kopesa Yehova lokumu?
2 Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali na etamboli na biso. Nkolo esika moko oyo bandeko basalaka mayangani alobaki boye: “Ntango tomonaki ndenge oyo bobongisaka mayangani na bino, toyebisaki bato ya mangomba mosusu oyo balingi kosalela esika na biso ete báya kotala ndenge Batatoli ya Yehova basalaka liyangani mpo basalaka yango na ndenge ya malamu mpenza.” Ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato, ndenge oyo totosaka malako, mpe etamboli na biso, mokomoko na biso azali kosala ete bato báloba maloba ya kokumisa ya ndenge wana, oyo ebongi mpenza na Nzambe na biso.—1 Pet. 2:12.
3, 4. Ndenge nini ezaleli ya koboya kolekisa ndelo ekosalisa biso tólata na ndenge oyo ebongi na baministre baklisto, ezala ntango tozali na liyangani to nsima na yango?
3 Elateli mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto: Mpo na kolata mpe kobongisa nzoto na ndenge oyo ekokumisa Yehova, esɛngaka kolekisa ndelo te. (1 Tim. 2:9) Buku Eteyelo ya mosala, na lokasa 132 elobi boye: “Moto oyo alekisaka ndelo te, alingaka te koyokisa basusu mpasi mpambampamba mpe alingaka mpe te kobenda likebi na bango epai na ye moko.” Na bamboka mingi, bato mingi bakómi kolata na kolekisa ndelo. Nzokande, Yehova asepelaka mingi na milende oyo tosalaka mpo na kozala bamonisi na ye na ndenge ebongi. (Mis. 15:14) Ata soki liyangani esalemi na libándá ya masano ya ndembo to na esika mosusu ya masano, esika yango ekómaka mpo na biso “koyangana monene” na boumeli ya mikolo misato ya liyangani. Na bongo, lokola tozali kokende koyangana liboso ya Yehova, tosengeli kolata na ndenge oyo ebongi na lokumu ya Moto oyo aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba.—1 Nta. 29:11.
4 Tosengeli mpe kotya likebi na ndenge oyo tokolata mikolo nyonso nsima ya liyangani. Atako mbala mosusu tokolinga kolata na ndenge oyo ekosepelisa biso wana tozali kozwa mopɛpɛ to kolya na restora, ezali kaka na ntina mingi ete elateli na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto ezala oyo ebongi na bato oyo “balobaka ete babangaka Nzambe.” (1 Tim. 2:10) Elamba ya malamu ezali kaka te oyo bato mingi bazali kolata. (1 Yoa. 2:16, 17) Mikanda na biso ezali na bafɔtɔ ya mibali mpe basi oyo balati na kolekisa ndelo te mpe na ndenge ya malamu, na mabaku ndenge na ndenge. Soki tolati makarɔ na biso ntango tozali na engumba oyo liyangani ezali kosalema, yango ekotinda biso tóbosana te ete tozali baministre baklisto ngonga nyonso.—2 Kol. 6:3, 4.
5, 6. Ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na mesa ya elimo ya Yehova?
5 Monisá limemya mpo na mesa ya Yehova: Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba abongiseli biso elambo moko. (Yis. 25:6; 1 Kol. 10:21) Soki tozali kopesa motuya na libaku oyo tozwi ya kolya na mesa ya elimo ya Yehova, tokomityela mokano ya kozala na liyangani mikolo nyonso misato. Osili kozwa bibongiseli mpo na kozwa esika ya kolala, transport, mpe konje na mosala? Osili komibongisa mpo na kosala mobembo mpo okóma na esika ya liyangani na ngonga ya malamu mpo na kozwa esika ya kofanda, kokutana na bandeko, mpe kosangana na bango mpo na kokumisa Yehova na loyembo mpe libondeli ya ebandeli?—Nz. 147:1.
6 Soki tozali na limemya mpo na mesa ya Yehova, tokolanda programɛ na likebi mpenza mpe tokoboya kosolola mpambampamba elongo na basusu, kolya, to kotambolatambola. Na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yehova azali kopesa biso bilei ya elimo oyo tozali na mposa na yango sikoyo mpenza. (Mat. 24:45) Moko te kati na biso asengeli kozangisa ata eteni moko ya programɛ yango. Baboti basengeli kofanda elongo na bana na bango mpe kosalisa bango bálanda liyangani malamu.—Det. 31:12.
7. Basɛngi biso tósala nini na oyo etali biloko ya kolya na midi, mpe mpo na nini?
7 Tosɛngi bandeko nyonso bámema biloko ya kolya na liyangani na esika bábima mpo na kosomba yango na ntango ya bopemi. Ezalaki esengo komona ete bayangani mingi balandaki malako yango na mbula eleki. Ekozala lisusu malamu mpenza soki bandeko nyonso balandi malako yango na mbula oyo! (Ebe. 13:17) Ebongiseli yango epesaka biso libaku malamu ya kolendisama na bandeko na biso mpe esalaka ete tózala na bomoko mpe na kimya oyo epesaka Yehova lokumu.—Nz. 133:1.
8, 9. Mabaku mosusu nini ya kokumisa Yehova liyangani ya etúká ekopesa biso?
8 Kopesa litatoli ya libaku malamu: Ntango tozali kokende mpe kouta na liyangani, tozwaka mabaku mingi ya kokumisa Yehova na mbɛbu na biso. (Ebe. 13:15) Ezala soki tozali kolya na restora to kosolola na bato oyo basalaka na otɛlɛ, tiká ete tóluka ndenge ya kopesa bato litatoli. Makanisi mpe mitema na biso ekotonda na biloko ya motuya ya elimo oyo tokozwa na liyangani. Tiká tóyebisa makambo yango ya malamu na bato oyo tozali kokutana na bango.—1 Pet. 3:15.
9 Tozali kozela na mposa mpenza libaku yango ya kokumisa Yehova “kati na koyangana monene.” (Nz. 26:12) Tiká ete tókumisa Yehova na bomoko mpenza na liyangani ya etúká, “Botosi oyo esepelisaka Nzambe.”
[Etanda na lokasa 5]
Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká
◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 9:30 ya ntɔngɔ. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 ya ntɔngɔ. Mwa miniti moke liboso programɛ ebanda, miziki ya Bokonzi ekobɛta wana prezida ya eteni ya ebandeli akofanda na estrade. Na ntango wana, esengeli ete biso nyonso tófanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na molɔngɔ. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, programɛ ekosuka na ngonga ya 5:05 ya mpokwa, mpe na mokolo ya lomingo na ngonga ya 4:10 ya mpokwa.
◼ Makabo: Esɛngaka mbongo mingi mpo na kobongisa liyangani ya etúká. Tokomonisa botɔndi na biso soki topesi makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi na biso to na liyangani mpo na kosunga mosala na mokili mobimba.
◼ Bilei ya midi: Balendisaki biso tómemaka biloko ya kolya ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekopesa biso makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma, nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko epai ya batɛki ekozala te. (Liyebisi: Bóyeba ete bato oyo batɛkaka biloko ya kolya bakozwa ndingisa ya kokota na esika ya liyangani te, ata na ngonga nini.—Yoa. 2:13-17.) Baoyo bakosalela bambambola mpo na kolambela na esika ya liyangani, basengeli liboso kotuna bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani mpo bálakisa bango esika oyo bakoki kotya yango. Bibongiseli esengeli kozwama mpo makama ebima te.—Luka 10:38-42.
◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka biloko epai ya batɛki wana, babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Soki moto moko amoni malamu kosomba biloko ya kolya epai ya batɛki (na ndakisa: bombo, bisikiti, gato, mbisi to biloko mosusu), asengeli kobwaka nkasa na yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na libándá te. Soki tomoni moto moko abwaki papye to sashɛ na mabelé to na libándá, tosengeli kolokɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tosɛngi bino bósala milende mpenza mpo na kobatela esika ya liyangani pɛto na kati mpe na libándá. Bopɛto ezali likambo oyo bayangani nyonso basengeli kotyela yango mpenza likebi. Soki mokomoko na biso asali bongo, tokotika esika ya liyangani pɛto na nsuka ya mokolo. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.—1 Pet. 1:15, 16; Ex. 19:10; Det. 23:14.
◼ Baboti ná bana: Bato mosusu bakamwaki na komona bana na biso bafandi mpe bazali kolanda programɛ na likebi mpenza, bazali kozwa banɔti mpe kotánga na Biblia na bango bavɛrsɛ oyo balobi bazali kotánga. Esengeli kokɛngɛla bana malamu. Soki balingi kokende na twalɛti, tata to mama to mpe yaya asengeli kokende kotika bango. Ekozala mpe likambo ya mayele komema mai ya komɛla, yango ekosala ete bótɛlɛmaka mpambampamba te mpo na kokende koluka mai ntango liyangani ezali kosalema. Na ntango ya bopemi, tosengeli kokeba ete bana na biso bákimakima mbangu te na basikalie noki te bákwea to bákweisa bato mosusu. Moto oyo azali matoi mangbongi atungisaka basusu mpe afingisaka nkombo ya Yehova. Etamboli na biso ya malamu epesaka lokumu mpe nkembo na Yehova, Nzambe oyo asalaka makambo na molɔngɔ.—1 Kol. 14:40.
◼ Kosalela kura ya liyangani: Esengeli kotya radio to masini mosusu te na bansinga ya kura to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani, mpe biloko yango ekoki kosalelama kaka sokiekobebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kosala nyonso mpo batelefone na biso ya mabɔkɔ ebebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Komema bato ebele te na ndako to na esika ya kolala oyo bapesi yo koleka ndenge esengeli to ndenge mokóló ndako asɛngaki. (2) Soki okofanda te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango nokinoki. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo ya ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (4) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Zaláká na bokatikati. (5) Bopɛto ezali ndeko ya ezaleli ya kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. Yango etaleli mpe Ndako ya bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá oyo ezali mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.—Gal. 5:22, 23.