Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/04 lok. 8
  • Tómekola ezaleli ya makanisi ya Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómekola ezaleli ya makanisi ya Yesu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Tózala na elimo ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Saleláká basusu na ndakisa ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Bolingo ya Kristo etindaka biso tólinga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 4/04 lok. 8

Tómekola ezaleli ya makanisi ya Yesu

1. Ezaleli nini ya makanisi Yesu amonisaki?

1 Masolo ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu, Mwana ya Nzambe mpe mosala na ye, esalisi biso mpenza tólinga ye atako tomoná ye te. (1 Pet. 1:⁠8) Atikaki esika ya lokumu oyo azalaki na yango na likoló mpe ayaki awa na mabelé mpo na kotosa mokano ya Tata na ye. Ntango azalaki na mabelé, alukaki matomba na ye moko te ntango azalaki kosalela basusu mpe na nsima apesaki bomoi na ye mpo na kobikisa bato. (Mat. 20:28) Liloba ya Nzambe elendisi biso ete: “Bóbatela na kati na bino ezaleli oyo ya makanisi oyo ezalaki mpe na kati ya Klisto Yesu.” Ndenge nini tokoki komekola elimo ya komipimela oyo azalaki na yango?​—⁠Filp. 2:​5-8.

2. Mokakatano nini baklisto mingi bazalaka na yango, mpe nini ekoki kosalisa bango bálonga yango?

2 Ntango tolɛmbi: Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki mpe kolɛmba. Mokolo moko, Yesu apesaki mwasi moko Mosamalia litatoli malamumalamu atako ‘alɛmbaki na mobembo.’ (Yoa. 4:⁠6) Lelo oyo baklisto mingi mpe bazalaka na mokakatano yango. Nsima ya kosala mosala makasi mikolo nyonso ya pɔsɔ, ekoki kozala mpasi mpo na kozwa makasi ya kobima na mosala ya kosakola. Nzokande, soki tozali kosakola mbala na mbala, tokomona mpenza ete mosala yango epesaka biso lisusu makasi na elimo.​—⁠Yoa. 4:​32-34.

3. Ndenge nini biso mpe tokoki kozala na mposa ya koteya lokola Yesu?

3 Mokolo mosusu, Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kokende na esika moko oyo bato bazalaki te mpo na kopema mwa moke. Kasi, ebele ya bato bayaki koyeba likambo yango mpe bakimaki mbangu liboso na bango mpo na kokutana na bango. Na esika ete Yesu asilika, “mawa ekangaki ye mpo na bango” mpe abandaki “koteya bango makambo mingi.” (Mko. 6:​30-34) Esɛngaka mpe kozala na ezaleli ya ndenge wana mpo na kobanda koyekola Biblia na bato mpe kolanda koyekola na bango mbala na mbala. Esɛngaka kosala milende ntango nyonso mpe kolinga mpenza bato. Soki sikoyo ozali na moto moko te oyo oyekolaka na ye Biblia, kolɛmba te koluka.

4. Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela mosungi ekoki kosalisa biso tómekola ezaleli ya makanisi ya Klisto?

4 Tótyaka makambo ya elimo na esika ya liboso: Soki tozali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, yango ekoki kosalisa biso tómipesa mingi na makambo ya elimo. Ndeko mwasi moko oyo azali elenge akomaki boye: “Mama ya moninga na ngai moko alendisaki ngai ná moninga yango tósala mosala ya mobongisi-nzela mosungi elongo na ye na boumeli ya sanza moko. Nazali na esengo mingi ndenge tondimaki kosala yango. Nasepelaki mingi koyeba bandeko basi mpe mibali malamumalamu, mpe bakómaki mbala moko lokola bandeko na ngai mpenza. Nasepelaki mpe ndenge nazwaki mabaku mingi ya koyebisa basusu makambo ya Yehova mpe koteya bango solo kitoko oyo etali Bokonzi. Nyonso wana esalaki ete namiyoka penepene na Yehova mpe na ebongiseli na ye. ​—⁠Nz. 34:⁠8.

5. Mpo na nini tosengeli kolanda kosala milende mpo na komekola ezaleli ya makanisi ya Yesu?

5 Biso nyonso, nzoto na biso ya kozanga kokoka ebundisaka mposa na biso ya kosepelisa Yehova. (Lom. 7:​21-23) Tosengeli kokima elimo oyo bato ya mokili bazalaka na yango ya koboya komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya basusu. (Mat. 16:​22, 23) Yehova akoki kosalisa biso tólonga etumba yango na nzela ya elimo santu na ye. (Gal. 5:​16, 17) Wana tozali kozela kosikolama na mokili ya sika mpe ya sembo ya Nzambe, tiká tótya makambo etali Bokonzi mpe matomba ya basusu liboso ya oyo ya biso moko mpo na komonisa ete tozali komekola ezaleli ya makanisi ya Yesu. ​—⁠Mat. 6:33; Lom. 15:​1-3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto