Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/07 nk. 4-5
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi​—Eteni 1
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Sakolá mpe pesá litatoli malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 8/07 nk. 4-5

Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala

1. Mokano nini tokoki komityela na mbula ya sika ya mosala?

1 Tosengeli komityelaka mikano mpo tókola na elimo. Mikano nini omityeli mpo na mbula ya sika ya mosala? Ezali malamu komityela mokano ya kozala mobongisi-nzela mosungi sanza moko to basanza mingi. Esɛngaka komibongisa liboso mpo na kosala mosala wana oyo epesaka esengo mingi. Yango wana, sikoyo nde ntango ya kobanda komibongisa mpo na yango. Mpo na nini komityela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi?

2. Mpo na nini komityela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi?

2 Ntina ya kozala mobongisi-nzela mosungi: Mosala ya mobongisi-nzela mosungi esalisaka biso tósepelisa Tata na biso ya likoló “malamumalamu lisusu,” na ndenge esɛngaka kosakola bangonga mingi. (1 Tes. 4:1) Ntango tokanisaka makambo nyonso oyo Yehova asalá mpo na biso, mitema na biso etindaka biso tóyebisa basusu makambo na ye. (Nz. 34:1, 2) Yehova amonaka makambo oyo tosalaka mpe asepelaka mpenza ntango tomipimelaka makambo mosusu mpo na kosakola mingi. (Ebe. 6:10) Toyokaka esengo mingi na koyeba ete Yehova asepelaka na mosala ya makasi oyo tosalaka.​—1 Nta. 29:9.

3, 4. Matomba nini tozwaka na mosala ya mobongisi-nzela mosungi?

3 Mbala mingi, soki moto asalaka likambo moko mbala na mbala, nsukansuka amesanaka na yango mpe asepelaka na yango lisusu mingi. Ndenge moko mpe, soki osakolaka mingi, okozala na mokakatano mingi te mpo na kosolola na bato na mosala ya ndako na ndako. Okoyeba lisusu malamu ndenge ya kobanda masolo na bato mpe okoyeba kosalela Biblia malamu. Soki olobelaka mingi makambo oyo ondimaka, kondima na yo ekokóma lisusu makasi. Basakoli mingi bazwaki moto ya koyekola na ye Biblia ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

4 Mosala ya mobongisi-nzela mosungi ekoki mpe kosalisa biso tókende liboso na makambo ya elimo. Ndeko mobali moko oyo azalaki liboso mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amonaki ete akómaki komipesa mingi na mosala na ye ya mosuni. Yango wana, azwaki ekateli ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko. Alobi boye: “Nandimaki te ete nakoki kozwa makasi ya ndenge wana na elimo na sanza moko kaka! Nazwaki ekateli ya kozala mobongisi-nzela mosungi kozanga kotika, mpe yango esalisaki ngai nazongela lisusu mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.”

5. Tokoki kosala nini soki tokanisi ete tokokoka te kosala mosala yango?

5 Longá mikakatano: Basusu bakoki kokakatana kosɛnga mosala yango mpo bakanisi ete bayebi mpenza kosakola te. Soki yo mpe okanisaka ndenge wana, Yehova akoki kosalisa yo ndenge asalisaki Yilimia. (Yil. 1:6-10) Atako Moize azalaki moto ya “maloba polele te,” Yehova asalelaki ye mpo akokisa mokano na Ye. (Ex. 4:10-12, NW) Soki okanisi ete okokoka te kosala mosala yango, sɛngá Yehova apesa yo mpiko.

6. Ndenge nini tokoki kokóma babongisi-nzela basungi atako tozali na mikakatano ya nzoto to tozalaka na makambo mingi ya kosala?

6 Mikakatano ya nzoto to kozala na makambo mingi ya kosala nde ezali kopekisa yo osɛnga mosala yango? Soki maladi etungisaka yo to ozali ebɔsɔnɔ, okoki kokóma mobongisi-nzela mosungi soki ozali kosakola na kotalela makoki na yo. Soki ozalaka na makambo mingi ya kosala, okoki komona malamu otika makambo mosusu ya ntina mingi te mpo osala yango na sanza oyo ekolanda. Basakoli mosusu oyo basalaka mosala mokolo mobimba, bazwaki likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ntango basɛngaki mokolo moko to mikolo mibale ya konje na mosala.​—Kols. 4:5.

7. Mpo na nini tosengeli kobondelaka mbala na mbala na likambo etali kokóma mobongisi-nzela mosungi?

7 Oyo okoki kosala: Yebisá Yehova mposa na yo na libondeli. Sɛngá Ye apambola milende oyo ozali kosala mpo na kosakola mingi. (Lom. 12:11, 12) Akoki kosalisa yo ozwa bikateli ya bwanya ntango ozali kobongisa programɛ na yo. (Yak. 1:5) Soki motema na yo ezali kotinda yo te na kosala mosala yango, sɛngá Yehova asalisa yo osepela na mosala ya kosakola.​—Luka 10:1, 17.

8. Ndenge nini Masese 15:22 ekoki kosalisa yo okóma mobongisi-nzela mosungi?

8 Bólobela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi na libota. (Mas. 15:22) Ntango mosusu, moko na bino akoki kokóma mobongisi-nzela mosungi na lisalisi ya basusu. Yebisá bandeko mosusu ya lisangá mposa na yo ya kokóma mobongisi-nzela, mingi mpenza baoyo makambo na bango ekokani na oyo ya yo. Yango ekoki kolendisa basusu mpe bákóma babongisi-nzela basungi.

9. Sanza nini okopona kozala mobongisi-nzela mosungi?

9 Na programɛ oyo osali mpo na mbula ya sika ya mosala, ozali kokanisa kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza nini? Soki okendaka mosala mikolo nyonso to okendaka kelasi, okoki kopona basanza oyo ezalaka na mokolo moko oyo bato bakendaka mosala te to oyo ezalaka na mikolo ya pɔsɔ mitano mpe mikolo ya lomingo mitano. Na ndakisa, sanza ya Sɛtɛmbɛ, ya Desɛmbɛ, ya Marsi, mpe ya Augusto, ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo. Sanza ya Mai ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe sanza ya Yuni ekozala na mikolo mitano ya lomingo. Soki ozali na mikakatano ya nzoto, poná sanza oyo mbula ebɛtaka mingi te to oyo moi ezalaka makasi mingi te. Okoki mpe kopona kozala mobongisi-nzela na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá na bino. Soki ozali mobongisi-nzela mosungi na sanza wana, okozwa libaku ya kozala na eteni ya liboso ya likita oyo mokɛngɛli ya zongazonga akosala elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola Ekaniseli ekosalema na mokolo ya 22 Marsi na mbula ekoya, sanza ya Marsi, Aprili mpe Mai ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi. Soki oponi sanza oyo okozala mobongisi-nzela mosungi, salá programɛ moko oyo ekosalisa yo okokisa ngonga oyo esɛngami, mpe komá yango kokoma.

10. Okoki kosala nini soki okokoka te kozala babongisi-nzela basungi?

10 Ata soki omoni mpenza ete okokoka te kozala mobongisi-nzela na mbula oyo ya sika ya mosala, okoki kaka kosala makasi osakola mingi. Kobá kosala nyonso oyo okoki mpo na kosakola, mpe yebá ete Yehova asepelaka na milende oyo osalaka na molimo na yo mobimba mpo na kosalela ye. (Gal. 6:4) Pesá mabɔkɔ na bandeko oyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpe lendisá bango. Mbala mosusu, okoki kobongola programɛ na yo, na ndakisa kobakisa mokolo moko na mikolo oyo osakolaka, mpo na kosakola elongo na bandeko yango.

11. Mpo na nini tosengeli kobosanaka te ete mikolo etikali ya kotánga?

11 Basaleli ya Yehova bayebi ete mikolo etikali ya kotánga. Mosala ya kosakola nsango malamu esengeli kosalema sikoyo. Bomoi ya bato ezali na likama, mpe ntango oyo etikali ekómi mokuse. (1 Kol. 7:29-31) Bolingo oyo tolingaka Nzambe nde etindaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosakola. Soki tosali milende mpe tomibongisi liboso, tokoki kozala babongisi-nzela basungi ata sanza moko na mbula oyo ya sika ya mosala​—mokano moko ya malamu mpenza!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto