Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na bisika ya mombongo
Mpo na nini ezali na ntina: Lokola bato mingi balekisaka bangonga ebele na mosala, mbala mingi lolenge ya malamu mpo na koyebisa bango nsango ya Bokonzi ezalaka kosakwela bango na esika na bango ya mosala. Kopesa litatoli na esika ya mombongo ekoki kosepelisa mpe kobota mbuma, mpo bato bazangaka te mpe mbala mingi batɛki bapesaka limemya na bato oyo bamonani lokola bakiliya. Mpo na kopesa litatoli malamu, basakoli basengeli kozala na mayele, kosalela bososoli, kozala ndakisa na molato mpe na ndenge na bango ya kosala monzɛlɛ. (2 Ko. 6:3) Na yango, mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli koluka koyeba mbala boni basakolaka na bisika ya mombongo mpe basakoli yango ezali banani.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Na losambo na bino na kati ya libota ya mbala ekoya, bómekameka ndenge ya kobanda lisolo oyo okosalela ntango okosakola na esika ya mombongo.