Kasɛti-video Pas de sang: la médecine relève le défi ekosalisa yo
Oyebi malamu mayele oyo minganga bakoki kosalela mpo na kosalisa moto kozanga ete bázongisa ye makila? Oyebi malamu mpenza mayele mosusu oyo bakoki kosalela mpo na kobikisa moto ya maladi na esika ya kozongisa ye makila mpe ndenge oyo basalelaka yango? Talá kasɛti-video oyo, mpe meká kopesa biyano na mituna oyo elandi.—Liyebisi: Lokola kasɛtɛ-video yango ezali mpe komonisa ndenge bazali kosala moto lipaso, baboti basengeli kokeba ntango balingi kotala yango elongo na bana na bango ya mike.
(1) Ntina mpenza oyo Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila ezali nini, mpe etinda yango ezali wapi na Biblia? (2) Na oyo etali komisalisa epai ya monganga, tozalaka na mposa nini? (3) Lotomo nini moto ya maladi nyonso azalaka na yango? (4) Mpo na nini koboya bázongisa biso makila ezali komonisa mayele mpe bososoli? (5) Wapi makambo mibale ya ntina minganga basengeli kosala nokinoki ntango makila ya moto ebimi mingi? (6) Makama nini ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto ekoki kobima soki bazongisi moto makila? (7) Biloko nini mosusu minganga basalelaka mpo makila ebima mingi te na ntango ya lipaso? (8) Makambo nini osengeli koluka koyeba oyo etali mayele mosusu ya komisalisa na monganga kozanga kosalela makila? (9) Bakoki mpenza kosala moto lipaso moko ya monene mpe ya mpasi kozanga ete bázongisa ye makila? (10) Likambo nini minganga ebele bakómi kondima kosala mpo na Batatoli ya Yehova, mpe etikali moke minganga bakokóma kosalisa bato nyonso ndenge nini?
Kondima komisalisa na lolenge moko kati na oyo balakisi na kasɛti-video oyo etali lisosoli ya moto na moto.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, nk. 22-24, 29-31 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nk. 30-31.