Kasɛti-video oyo elobeli mayele moko oyo minganga mingi bakómi kosalela
Minganga, bazuzi mpe baavoka bakómi kotya likebi mingi na ntomo ya moto ya maladi mpe na mitinda ya bizaleli malamu oyo moto yango atosaka. Yango esali ete bábimisa bankisi mpe balolenge ya sika ya kosalisa bato, oyo ezali mpe malamu mpo na Batatoli ya Yehova. (Mis. 15:28, 29) Yango nde balobeli na kasɛti-video Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient. Talá yango, mpe na nsima talelá lisusu makambo oyo oyekoli.—Liyebisi: Lokola kasɛti-video yango ezali mpe komonisa ndenge bazali kosala moto lipaso, baboti basengeli kokeba ntango bazali kotala yango elongo na bana mike.
(1) Mpo na nini minganga mosusu bakómi kobongola makanisi na likambo ya kozongisa moto makila? (2) Pesá ndakisa ya mapaso misato ya minene oyo bakoki kosala moto kozanga bázongisa ye makila. (3) Na mokili mobimba, minganga boni bandimi kosalisa bato ya maladi mpe kosala bango lipaso kozanga bázongisa bango makila? Mpo na nini bandimi kosala bongo? (4) Baankɛtɛ oyo euti kosalema na balopitalo, emonisi nini na likambo ya kosalela makila? (5) Makama nini ekoki kokómela moto soki bazongisi ye makila? (6) Bato mingi ya mayele balobi nini mpo na matomba ya mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya kozongisa moto makila? (7) Nini esalaka ete moto asila makila? Tii na nivo nini makila ya moto ekoki kokita kozanga ete ezala likama? Nini bakoki kosala mpo makila emata? (8) Nini ekoki kosalisa nzoto ya moto ebota lisusu ba globules rouges mingi? (9) Mayele nini minganga bakómi kosalela mpo moto abima makila mingi te ntango bazali kosala ye lipaso? (10) Bakoki mpe kosalela mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya kozongisa moto makila, epai ya bana mike to epai ya bato oyo bazali na maladi makasi? (11) Wapi moko ya mibeko ya libosoliboso ya mosala ya monganga oyo monganga ya malamu asengeli kobosana te? (12) Mpo na nini ezali na ntina baklisto bápona liboso mpenza lolenge ya lisalisi ya monganga oyo ekosɛnga makila te? Ndenge nini tokoki kosala yango?
Balolenge mosusu ya lisalisi ya monganga oyo balakisi na kasɛti-video oyo, kondima to koboya yango etali ekateli ya moto na moto, na kotalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Osili kotalela mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya makila, oyo yo ná bana na yo bokondima básalisa bino na yango soki bosili makila? Bandeko na yo ya libota, oyo bazali Batatoli te basengeli mpe koyeba malamu ekateli na yo wana mpe ntina oyo ozwi yango.—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000.