Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/06 lok. 1
  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Bizaleli oyo etindaka biso tóyanganaka na makita
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Tómonisa botɔndi na biso Ekaniseli ekosalema mokolo ya 17 Aprili
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 3/06 lok. 1

Salisá basusu bázwa litomba na lisiko

Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekosalema na mokolo ya 12 Aprili

1. Wapi lolenge moko oyo baklisto bamonisaka botɔndi na bango mpo na lisiko?

1 “Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.” (2 Kol. 9:15) Maloba oyo emonisi mpenza ndenge oyo tomiyokaka mpo na bolamu mpe motema boboto oyo Nzambe amoniseli basaleli na ye na nzela ya lisiko ya mwana na ye Yesu Klisto. Tokomonisa botɔndi yango polele ntango tokoyangana na mokolo ya 12 Aprili mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto.

2. Banani bayanganaka na Ekaniseli elongo na basaleli ya Yehova, mpe bato yango basengeli kosala nini mpo bázwa litomba na lisiko?

2 Mbula na mbula, pene na bato milio zomi bayanganaka elongo na basaleli ya Yehova na Ekaniseli. Na ndenge yango, bamonisaka ete bazali na botɔndi mpo na mbeka ya Klisto. Nzokande, mpo bázwa litomba na lisiko, basengeli komonisa ete bazali na kondima na lisiko yango. (Yoa. 3:16, 36) Ndenge nini tokoki kosalisa bango bámonisa kondima yango? Na eleko oyo ya Ekaniseli, tokoki kolendisa bango báyekola Biblia mpe báyanganaka na makita nyonso. Talelá makanisi oyo elandi.

3. Ndenge nini tokoki kobanda koyekola na moto Biblia ntango tozali kobengisa ye na Ekaniseli?

3 Boyekoli ya Biblia: Ntango ozali kobengisa moto oyo asepelaka na nsango malamu na Ekaniseli, mpo na nini te kobanda koyekola na ye Biblia na buku Biblia eteyaka? Meká kolimbolela ye ntina ya Ekaniseli, mpe fungolá na nkasa 206-208 ya buku yango mpo bótalela lisolo, “Bolei ya Mpokwa ya Nkolo​—Molulu oyo ekumisaka Nzambe.” Bokoki kotalela lisolo yango mobimba to kokabola yango na biteni mibale, mbala mosusu kaka ntango ozali koyekola na ye Biblia na porte na ye. Soki bosilisi kotalela mokapo yango, mbala mosusu moto yango akosepela bótalela mokapo 5, “Lisiko​—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso.” Soki andimi koyekola Biblia, bózonga na ebandeli ya buku mpe bótalela mikapo minei ya ebandeli.

4. Banani tokoki kobanda koyekola na bango Biblia na eleko oyo ya Ekaniseli?

4 Banani tokoki kobanda koyekola na bango Biblia? Mbala mosusu, baninga na biso mosusu ya mosala, ya kelasi, to ya kartye, bakosepela na masolo ya ndenge wana. Na lisangá, bandeko mibali bakoki kosolola na mibali oyo basi na bango bazali Batatoli, kasi bango moko bazali Batatoli te. Mpe tóbosana te bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te. Lisusu, tokosala milende mpenza mpo na kobengisa na Ekaniseli, baoyo bazalaki kosangana na molende na lisangá kasi batiká. (Luka 15:3-7) Tiká tóluka kosalisa bato nyonso ya ndenge wana mpo bázwa matomba na lisiko.

5. Ndenge nini tokoki kolendisa bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu mpo báyanganaka na makita nyonso?

5 Makita ya lisangá: Ekaniseli ezali likita ya liboso oyo bayekoli mingi ya Biblia mpe bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu bayanganaka. Kasi, ndenge nini tokoki kolendisa bango bázwa matomba na makita mosusu? Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprili 2005, lokasa 8, epesaki likanisi oyo: “Yebisá ye motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso oyo ekosalema na pɔsɔ elandi. Lakisá ye makambo oyo tokotalela na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na boyekoli ya mokanda na lisangá. Limbolelá ye ndenge Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala esalemaka. Soki ozali na lisolo na Eteyelo ya Teokrasi, ntango mosusu okoki komekameka yango elongo na ye. Yebisá ye makanisi ya ntina ya makambo oyo elobelamaki na makita. Salelá bililingi oyo ezali na mikanda na biso mpo na kosalisa ye amona ndenge makita yango esalemaka. Soki kaka boyekoli na moto mbala ya liboso, bengá ye mbala moko na makita.”

6. Wapi makambo mibale oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bato ya mitema sembo bázwa litomba na mbeka ya lisiko?

6 Mbala mingi, soki bato ya mitema sembo bazali koyekola Biblia mbala na mbala mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, bakolaka noki na elimo. Na bongo, tiká ete tólendisa basusu bázwa litomba na bibongiseli wana ya elimo mpe na likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso—lisiko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto