Eteni 7: Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Kosala libondeli na ntango ya boyekoli
1. (a) Mpo na nini ezali malamu tóbandaka mpe tósukisaka boyekoli na libondeli? (b) Ntango nini tokoki kobanda kosala libondeli elongo moto oyo tozali koyekola na ye?
1 Mpo moyekoli ya Biblia akola na elimo, lipamboli ya Yehova ezali ntina mingi. (1 Kol. 3:6) Na bongo, ezali malamu tóbandaka mpe tósukisaka boyekoli na libondeli. Ntango mosusu, tokoki kobondela elongo na moto moko ata na mbala ya liboso oyo toyekoli na ye, soki andimaka Nzambe. Kasi mpo na bato mosusu, ekoki kosɛnga koluka koyeba ntango nini ebongi mpo na kobanda kobondela elongo na bango. Okoki kosalela Nzembo 25:4, 5 mpe 1 Yoane 5:14 mpo na kosalisa moyekoli ayeba ntina oyo tosengeli kobondelaka, mpe kosalela Yoane 15:16 mpo na komonisa ye ntina oyo tosengeli kobondelaka Yehova na nzela ya Yesu Klisto.
2. Soki ndeko mwasi moko abimi ná ndeko mobali moko oyo azwi batisimo to oyo azwi naino batisimo te mpo na koyekola Biblia na moto moko, nani akosala libondeli?
2 Nani asengeli kosala libondeli ntango tozali koyekola Biblia na moto moko? Soki ndeko mobali moko oyo azwi batisimo ná ndeko mwasi moko bakei koyekola Biblia na moto moko, ndeko mobali asengeli kosala libondeli, atako ndeko mwasi nde akotambwisa boyekoli soki alati litambala. (1 Kol. 11:5, 10) Epai mosusu, soki ndeko mobali oyo azwi naino batisimo te ná ndeko mwasi moko azwi batisimo bakei koyekola Biblia na moto moko, ndeko mwasi nde akosala libondeli. Na ntango wana, asengeli kolata litambala ezala ntango akobondela to ntango akotambwisa boyekoli.
3. Makambo nini tokoki koloba na mabondeli oyo tosalaka ntango tozali koyekola Biblia na moto moko?
3 Makambo oyo tokoki koloba na libondeli: Mabondeli oyo tosalaka ntango tozali koyekola Biblia na moto moko esengeli kozala milaimilai te, esengeli nde kolobela boyekoli. Nsima ya kosɛnga Yehova apambola boyekoli mpe kopesa ye matɔndi mpo na mateya ya solo oyo toyekoli, ebongi tópesa Yehova lokumu lokola azali Liziba ya mateya. (Yis. 54:13) Tokoki mpe kokɔtisa maloba oyo ekomonisa ete tozali komibanzabanza mpo na moyekoli, mpe ete tozali na botɔndi mpo na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela. (1 Tes. 1:2, 3; 2:7, 8) Soki tozali kosɛnga Yehova apambola milende oyo moyekoli azali kosala mpo na kosalela makambo oyo azali koyekola, yango ekoki kosalisa ye amona ntina ya kozala ‘motosi ya liloba.’—Yak. 1:22.
4. Matomba nini tokozwa soki tozali kobanda mpe kosukisa boyekoli na libondeli?
4 Kobondela na ntango ya boyekoli ezalaka na matomba mingi. Epesaka limpamboli ya Nzambe. (Luka 11:13) Emonisaka ete koyekola Liloba ya Nzambe ezali likambo ya lisɛki te. Ntango moyekoli azali koyoka mabondeli na biso, azali koyekola kobondela. (Luka 6:40) Lisusu, mabondeli oyo euti na motema oyo etondi na bolingo ya Yehova mpe na botɔndi mpo na ebele ya bizaleli malamu na ye, ekoki kosalisa moyekoli akolisa boyokani malamu elongo na Yehova.