Biyano na mituna na bino
◼ Esengeli kosala libondeli ntango tozali koyekola na moto na porte na ye?
Kobanda mpe kosukisa boyekoli ya Biblia na libondeli ezali na matomba mingi. Na libondeli yango, tosɛngaka ete elimo santu ya Yehova esalisa biso ntango tozali koyekola. (Luka 11:13) Libondeli esalisaka mpe moyekoli amona ete koyekola Biblia ezali likambo ya kozwa na lisɛki te; eteyaka mpe ye ndenge ya kobondela. (Luka 6:40) Na yango, ezali malamu tóumela te mpo na kobanda kobondela elongo na moyekoli. Kasi, lokola boyekoli nyonso ezalaka ndenge moko te, mosakoli mokomoko asengeli kosalela bososoli mpo na koyeba soki ebongi kosala libondeli to te ntango azali koyekola na moto na porte na ye.
Likambo moko ya ntina ya kotalela ezali esika oyo boyekoli esalemaka. Soki toyekolaka ná moto na esika oyo bato bazali mingi te, mpe boyekoli esalemi mbala ebele, tokoki kobanda mpe kosukisa na libondeli ya mokuse. Kasi soki tomoni ete kosala bongo ekobenda likebi ya bato mosusu to ekoyokisa moyekoli mwa nsɔni, ekoki kozala malamu tózela tii ntango tokobanda koyekola na esika moko oyo bato bazali mingi te mpo na kosala libondeli. Ezala esika nini toyekolaka na moto, tosengeli kosalela bososoli mpo na koyeba ntango nini ebongi mpo tóbanda kosala libondeli.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 2005, lokasa 6.