Kobá kosakola
1 Tozali kobika na bantango ya ndenge mosusu. Bitumba, kobomana ya bato ekólo moko, makama lokola mpela, koningana ya mabelé, mpe mopɛpɛ makasi, mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ, ekómi kosalema bipai nyonso. Sikoyo mpenza nde ntango bato bazali na mposa ya koyoka nsango malamu. Nzokande, bato mingi bazali mpenza kotya likebi te na makambo ya elimo. Na bisika mosusu, ekoki kozala mpasi kokuta bato na bandako na bango mpe ata kutu mpasi koleka kozwa moto oyo akondima koyoka biso to koyekola Biblia. Atako bongo, ezali na ntina mingi tókoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangela sikoyo.—Mat. 24:14.
2 Kolinga bato: Mosala na biso ya kosakola esalisaka bato báyeba ete Yehova alingaka bango. “Alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Pet. 3:9; Ezek. 33:11) Yango wana, apesi etinda, ndenge Yesu alobaki yango, ete “na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Mko. 13:10) Nzambe azali kosɛnga bato báluka ye mpo bábika ntango akosambisa mokili ya Satana. (Yoe. 2:28, 29, 32; Sef. 2:2, 3) Tozali na botɔndi te ndenge Yehova apesi biso libaku wana?—1 Tim. 1:12, 13.
3 Lapolo ya mokili mobimba emonisi ete na mobu ya mosala 2004, totambwisaki boyekoli ya Biblia soki 6 085 387 sanza na sanza, mpe pɔsɔ na pɔsɔ bayekoli ya sika soki 5 000 bazwaki batisimo! Basusu kati na bayekoli yango ya sika oyo bamipesaki, bazwamaki mpo Yehova apambolaki milende ya basakoli oyo basalaki nyonso mpo na kokoba kosolola na bato nyonso ya teritware oyo bapesi bango. Oyo nde likambo ya esengo mpo na masangá, mpe libaku mpo na biso, kosala elongo na Nzambe na mosala oyo ebikisaka bomoi ya bato!—1 Kol. 3:5, 6, 9.
4 Kumisá nkombo ya Nzambe: Tozali kokoba kosakola mpo na kokumisa Yehova na miso ya bato nyonso mpe kosantisa nkombo na ye liboso ya bato nyonso. (Ebe. 13:15) Satana asili “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela,” mpo na kondimisa bato ete Nzambe azali na nguya te ya kosilisa mikakatano na bango, ete atyaka likebi te na bampasi na bango, to kondimisa bango kaka ete Nzambe azali te. (Emon. 12:9) Ntango tozali kosakola, tozali kolongisa mateya ya solo etali Tata na biso ya likoló oyo azali malamu mingi. Tiká ete tókoba kokumisa nkombo na ye—sikoyo mpe libela na libela.—Nz. 145:1, 2.