Programɛ ya libota—Kosakola elongo na libota
1 Yehova asepelaka komona bana mike bazali kokumisa nkombo na ye. (Nz. 148:12, 13) Na mikolo ya Yesu, ata ‘bana mike mpe bana oyo bazalaki komɛla mabɛlɛ basanzolaki’ Nzambe. (Mat. 21:15, 16) Yango ezali mpe kosalema lelo oyo. Baboti, ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino bákóma basakoli oyo bakumisaka Yehova na molende? Na likambo oyo mpe, ndenge emonisamaki na lisolo oyo elobelaki makita ya lisangá, oyo ezali awa na likoló, eloko mpenza oyo ekosalisa bana na bino, ezali nde ndakisa na bino. Mpo na komonisa makanisi oyo baboti mingi bazalaka na yango, tata moko alobaki boye: “Bana basalaka te makambo oyo ozali koloba; basalaka nde makambo oyo ozali kosala!”
2 Ndeko mwasi moko oyo abɔkwamaki na baboti oyo babangaka Nzambe, alobi boye: “Ezalaki ata na mokolo moko te ya pɔsɔ oyo, nsima ya kolamuka na ntɔngɔ, tozalaki komituna soki tokobima na mosala ya kosakola to te. Toyebaki ete tokobima na mosala ya kosakola.” Yo mpe okoki kosalisa bana na yo bákanga mpenza ntina ya mosala ya kosakola soki osali programɛ ya kobimaka libota mobimba na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ. Yango ekosalisa kaka bana na yo te na komona ndenge ozali koteya, kasi ekosalisa mpe yo oyeba makanisi na bango, bizaleli na bango, mpe ndenge oyo bazali kokolisa makoki na bango.
3 Salisá bango mokemoke: Mpo bana básepela na mosala ya kosakola, esengeli kosalisa bango mpo básala yango malamumalamu. Ndeko mwasi oyo touti kolobela alobi lisusu boye: “Tozalaki kosuka kaka te na kolanda baboti na biso ntango babimi na mosala ya kosakola. Toyebaki ete biso mpe tosengelaki kosakola, ata soki tozalaki kaka kobɛta ngonga oyo ezalaka liboso ya lopango to kotikela moto trakte. Lokola tozalaki komibongisa malamumalamu liboso ya kobima na mosala ya kosakola na bawikende, tozalaki koyeba makambo nini tokoloba.” Okoki kopesa bana na yo formasyo ya ndenge wana soki ozali kozwa mwa miniti pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobongisa bango mpo na mosala ya kosakola, ezala na ntango ya boyekoli ya libota to na ntango mosusu.
4 Soki ozali kosakola elongo na libota na yo, okozwa mabaku mosusu ya kokɔtisa solo na mitema ya bana na yo. Tata moko moklisto azalaki komema mwana na ye ya mwasi kilomɛtrɛ 10 mpo na kokabola batrakte nzelanzela, na bamboka oyo ezalaki na nsima ya ngomba. Mwana yango alobi na esengo nyonso boye: “Ezali na bantango wana oyo tobandaki kotambola nde tata na ngai akɔtisaki solo na motema na ngai.” (Det. 6:7) Tiká ete yo mpe ozwa mapamboli mingi ndenge ozali kokɔtisa mosala ya kosakola na programɛ ya libota na yo.