Tóyebisa bato mingi nsango malamu
1. Makambo nini baklisto ya liboso basalaki mpo na koyebisa bato mingi nsango malamu?
1 Bayekoli ya Yesu ya liboso basalaki milende mpenza mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Basalelaki mayele mpenza mpo na koyebisa bato mingi nsango malamu. Baklisto oyo bakomaki Biblia, bakomaki mikanda na bango oyo epemami, na Grɛki ya pɛtɛɛ oyo bato nyonso ya bamboka oyo Loma ezalaki koyangela bazalaki koloba. Lisusu, ekoki kozala ete basakoli ya molende ya ekeke ya liboso mpe ya ekeke ya mibale ya ntango na biso nde bazalaki bato ya liboso ya kosalela codex, oyo elekaki rulo na malamu mpo na koluka biteni ya Makomami oyo balingi kotánga.
2, 3. (a) Ndenge nini Yisaya 60:16 ezali kokokisama lelo oyo? (b) Ndenge nini mayele ya tekiniki ezali kosalelama mpo losambo ya solo ekende liboso?
2 Mayele ya tekiniki: Na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya, Yehova asakolaki boye: “Okomɛla mabɛlɛ ya bikólo.” (Yis. 60:16, NW) Lelo oyo, esakweli yango ezali kokokisama ndenge basaleli ya Yehova bazali kosalela bozwi ya bikólo mpo na kosala mosala ya kosakola. Na ndakisa, na 1914, bambula mingi liboso bákóma kosala bafilme oyo ezalaki na bato oyo bazali koningana mpe koyokisa mingongo mpo na mombongo, Bayekoli ya Biblia babandaki kolakisa “Fɔtɔ-drame ya Bozalisi.” Filme yango oyo ezalaki koumela ngonga mwambe, ezalaki na bafɔtɔ mpe na bililingi oyo bato bazalaki koningana, bato mpe biloko ezalaki komonana na balangi na yango, mpe ezalaki koyokisa maloba, mpe filme yango epesaki bamilio ya bato litatoli ya solosolo.
3 Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kosalela bamasini ya konyata mikanda oyo esalaka mbangu mpenza, mpe bamasini mosusu oyo etambwisami na ordinatɛrɛ mpo na kobimisa Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na bankama ya minɔkɔ. Baaviɔ, bamasuwa mpe mituka ememaka mikanda tii na esika eleki mosika mpenza na mabelé, na bikólo 235. Yehova alendisi basaleli na ye, na nzela ya elimo na ye, na kosalela malamumalamu mayele yango ya tekiniki mpo bato mingi mpenza báyeba mateya ya solo koleka ndenge ezalaki liboso.
4. Makambo nini basakoli mosusu basali mpo na koyebisa bato mingi nsango malamu?
4 Tóbongola makambo mosusu ya bomoi na biso: Balendisaka basambeli ya solo na kobongola makambo mosusu ya bomoi na bango mpo bákoka koyebisa bato mingi nsango malamu. Mingi bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo na kosakola mingi. Basusu bakei kosakola na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi. Basusu mpe bayekoli monɔkɔ moko ya bapaya mpo na kosakola mingi.
5, 6. Tokoki kosala nini mpo na koyebisa bato mingi mpenza nsango malamu na teritware ya lisangá na biso?
5 Longolá yango, tokoki koyebisa bato mingi nsango malamu soki tozali kosakola na ntango bato mingi bazalaka na bandako na bango mpe soki tozali kosakola na bisika oyo tokoki kokutana na bato mingi. Soki bato mingi ya teritware na yo bazalaka na bandako na bango na moi te, okoki nde kobongola programɛ na yo mpo na kosakola na mpokwa? Ezali nde na bisika oyo bato bazalaka mingi, oyo okoki kopesa litatoli? Osilá komeka kopesa litatoli na telefone mpe kosakola na bisika ya mombongo? Olukaka ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu?
6 Oyo nde libaku tozwi ya kopesa mabɔkɔ na litatoli monene oyo ezali kopesama mpo na nkombo ya Yehova mpe mpo na Bokonzi na ye! Tiká ete tókoba koyebisa bato mingi mpenza mateya ya solo oyo epesaka bomoi, oyo ezali na Liloba ya Nzambe.—Mat. 28:19, 20.