Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/09 lok. 2
  • ‘Tósala makambo nyonso mpo na nsango malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tósala makambo nyonso mpo na nsango malamu’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Okolinga kobongola makambo mosusu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Okoki kobongola programɛ na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tósakola na molende koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tóyebisa bato mingi nsango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 2/09 lok. 2

‘Tósala makambo nyonso mpo na nsango malamu’

1. Mosakoli ya Bokonzi azalaka na mposa ya kosala nini mpo na basusu, mpe mpo na nini?

1 Ntoma Paulo azalaki mpenza komona ete azali na mokumba ya kosakwela basusu nsango malamu. (1 Kol. 9:16, 19, 23) Ndenge moko mpe, lokola tomibanzabanzaka mpo na lobiko ya bato mosusu, yango etindaka biso tósala makasi mpo na koyebisa bango nsango malamu.

2. Makambo nini tokoki mbala mosusu kobongola na mosala na biso ya kosakola, mpe mpo na nini?

2 Tósakola na bisika mpe na ngonga oyo tokoki kokuta bato: Mobomi-mbisi ya malamu atyaka ndɔbɔ te to abwakaka monyama te na esika mpe na ngonga oyo ye alingi, kasi asalaka yango nde na esika mpe na ngonga oyo ayebi ete mbisi ezali kotambola mingi. Biso mpe, lokola tozali “baluki-bato,” tosengeli kobongola programɛ na biso mpo na kokuta bato na teritware na biso; na ndenge yango, tokoyoka esengo mingi na mosala ya kosangisa “bambisi ya ndenge nyonso.” (Mat. 4:19; 13:47) Tokoki nde kobima na mosala ya kosakola na mpokwa mpo na kokuta bato na bandako to kobima na ntɔngɔntɔngɔ mpo na kopesa litatoli na balabala? Mokano ya Paulo ezalaki ya “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu,” mpe azalaki kosalela mabaku nyonso mpo na kosala yango.​—Mis. 17:17; 20:20, 24.

3, 4. Ntango tozali na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki koyokanisa nsango na biso na makambo oyo ezali kotungisa bato, mpe yango ekobimisa matomba nini?

3 Maloba na biso ya kobanda lisolo esengeli koyokana na bamposa ya bato: Mbala mingi, babomi-mbisi babongolaka mayele ya kolɔba na kotalela mbisi oyo bazali koluka. Ndenge nini tokoki koyebisa bato ya teritware na biso nsango malamu ya Bokonzi na ndenge oyo ekosepelisa bango? Na mayele, tosengeli kolobela likambo moko oyo ezali kotungisa bato na teritware na biso mpe na nsima koyoka na likebi makanisi na bango na likambo yango. (Yak. 1:19) Mpo na kokɔtisa bango na lisolo, tokoki kotuna makanisi na bango na likambo yango. (Mas. 20:5) Soki tosali bongo, tokoki koyebisa bango nsango malamu na ndenge oyo ekoyokana na bomoi na bango. Paulo akómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” (1 Kol. 9:22) Mpo na kosimba mitema ya bato, tosengeli kobongolaka lisolo na kotalela bamposa ya moto mokomoko.

4 Koyebisa bato “nsango malamu ya kosepela” ezali mpenza likambo ya esengo! (Yis. 52:7) Tiká tósala “makambo nyonso mpo na nsango malamu” mpo na koyebisa yango na bato ebele.​—1 Kol. 9:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto